Surah 98 · 8 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Bayyinah in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

98:1

لَمۡ يَكُنِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ مُنفَكِّينَ حَتَّىٰ تَأۡتِيَهُمُ ٱلۡبَيِّنَةُ

Bapagano kati ya baye bazwa buku mpe na basangisi (Allah) bakotika kompengwa te kino elembo ya polele ekoyelaka bango

98:2

رَسُولٌ مِّنَ ٱللَّهِ يَتۡلُواْ صُحُفًا مُّطَهَّرَةً

Motindami ayeli bango kowuta epai na Allah azali kotangela bango buku ya bopeto

98:3

فِيهَا كُتُبٌ قَيِّمَةٌ

O’kati na yango mikapo ya nsemba mizwami

98:4

وَمَا تَفَرَّقَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَتۡهُمُ ٱلۡبَيِّنَةُ

Baye bazwaki buku bakabwanaki te sé ntango elembo ya polele ekomelaki bango

98:5

وَمَآ أُمِرُوٓاْ إِلَّا لِيَعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ حُنَفَآءَ وَيُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُواْ ٱلزَّكَوٰةَۚ وَذَٰلِكَ دِينُ ٱلۡقَيِّمَةِ

Batindamaki te sé kaka babondela Allah na bomoko bwa ye mpe batelemisa losambo mpe bafuta zakat boye nde lingomba ya bosembo

98:6

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ فِي نَارِ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَآۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمۡ شَرُّ ٱلۡبَرِيَّةِ

Ya sôló, Bapagano kati ya baye bazwa buku na basangisi (Allah) bakozala o’kati ya móto seko na seko bango wana nde bazali bikelamu ya mabe

98:7

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أُوْلَٰٓئِكَ هُمۡ خَيۡرُ ٱلۡبَرِيَّةِ

Ya sôló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu, bango nde bazali bikelamu ya malamu

98:8

جَزَآؤُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتُ عَدۡنٍ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدًاۖ رَّضِيَ ٱللَّهُ عَنۡهُمۡ وَرَضُواْ عَنۡهُۚ ذَٰلِكَ لِمَنۡ خَشِيَ رَبَّهُۥ

Lifuta lia bango epai ya Nkolo na bango likozala lola ya eden loye míngala mizali kotiola o’nse na yango тропа libela, Allah akosepela na bango, bango pe bakosepela naye wana nde ekozala lifuta ya oyo abangi Nkolo naye

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.