Surah 101 · 11 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Qari'ah in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

101:1

ٱلۡقَارِعَةُ

Bobangi

101:2

مَا ٱلۡقَارِعَةُ

Eloko nini yango bobangi

101:3

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلۡقَارِعَةُ

Nani akoyebisa yo eloko nini bobangi

101:4

يَوۡمَ يَكُونُ ٱلنَّاسُ كَٱلۡفَرَاشِ ٱلۡمَبۡثُوثِ

Mokolo moye bato bakozala lokola bapomboli ya kopanzana

101:5

وَتَكُونُ ٱلۡجِبَالُ كَٱلۡعِهۡنِ ٱلۡمَنفُوشِ

Mpe bangomba bikozalaka lokola bilamba bilemba

101:6

فَأَمَّا مَن ثَقُلَتۡ مَوَٰزِينُهُۥ

Mpona moto oyo emekelo naye ekozala nkilo

101:7

فَهُوَ فِي عِيشَةٍ رَّاضِيَةٍ

Akozala na bomoyi ya esengo

101:8

وَأَمَّا مَنۡ خَفَّتۡ مَوَٰزِينُهُۥ

Kasi mpona moto oyo emekelo naye ekozanga kilo

101:9

فَأُمُّهُۥ هَاوِيَةٌ

Bozongi mpe bofandi naye ekozala libulu ya mozindo makasi

101:10

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا هِيَهۡ

Mpe nani akoyebisa yo ntina na yango

101:11

نَارٌ حَامِيَةُۢ

Ezali nde moto ya makasi

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.