Surah 100 · 11 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-'Adiyat in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

100:1

وَٱلۡعَٰدِيَٰتِ ضَبۡحًا

(Na lapi) na bakimi mbango baye batondi na pema

100:2

فَٱلۡمُورِيَٰتِ قَدۡحًا

Baye bazali kobimisa bambuma ya moto ezali kongala (mikalali)

100:3

فَٱلۡمُغِيرَٰتِ صُبۡحًا

Baye babandaka bitumba na ntongo

100:4

فَأَثَرۡنَ بِهِۦ نَقۡعًا

Mpe sima bazali komatisa putulu

100:5

فَوَسَطۡنَ بِهِۦ جَمۡعًا

Mpe bazali kokota o’kati ya mapinga ya banguna

100:6

إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لِرَبِّهِۦ لَكَنُودٌ

Ya soló, moto azali na botondi te тропа Nkolo naye

100:7

وَإِنَّهُۥ عَلَىٰ ذَٰلِكَ لَشَهِيدٌ

Mpe ya sólo, moto azali nzeneneke na yango

100:8

وَإِنَّهُۥ لِحُبِّ ٱلۡخَيۡرِ لَشَدِيدٌ

Kasi pona mposa ya bomengo azali komipesa makasi

100:9

أَفَلَا يَعۡلَمُ إِذَا بُعۡثِرَ مَا فِي ٱلۡقُبُورِ

Ayebi te ntango bakobimisa maye mazwami na malita

100:10

وَحُصِّلَ مَا فِي ٱلصُّدُورِ

Mpe maye mabombamaki na mitema mikobima polele

100:11

إِنَّ رَبَّهُم بِهِمۡ يَوۡمَئِذٍ لَّخَبِيرُۢ

Ya sólo, mokolo wana Nkolo na bango ayebi sango na bango malamu mpenza

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.