Surah 85 · 22 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Buruj in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

85:1

وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡبُرُوجِ

(Na lapi) na mapata eye etonda minzoto

85:2

وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡمَوۡعُودِ

Mpe na lapi na mokolo ya elaka

85:3

وَشَاهِدٍ وَمَشۡهُودٍ

Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala

85:4

قُتِلَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأُخۡدُودِ

Babomaki bato ya nsé ya ngomba

85:5

ٱلنَّارِ ذَاتِ ٱلۡوَقُودِ

Na moto etonda bankoni

85:6

إِذۡ هُمۡ عَلَيۡهَا قُعُودٌ

Mpe bango bazingaki yango yakofanda

85:7

وَهُمۡ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ شُهُودٌ

Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi

85:8

وَمَا نَقَمُواْ مِنۡهُمۡ إِلَّآ أَن يُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ

Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu

85:9

ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٍ شَهِيدٌ

Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso

85:10

إِنَّ ٱلَّذِينَ فَتَنُواْ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَتُوبُواْ فَلَهُمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَ وَلَهُمۡ عَذَابُ ٱلۡحَرِيقِ

Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto

85:11

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ جَنَّٰتٌ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡكَبِيرُ

Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene

85:12

إِنَّ بَطۡشَ رَبِّكَ لَشَدِيدٌ

Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi

85:13

إِنَّهُۥ هُوَ يُبۡدِئُ وَيُعِيدُ

Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli)

85:14

وَهُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلۡوَدُودُ

Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo

85:15

ذُو ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡمَجِيدُ

Nkolo ya ngwende ya lokumu

85:16

فَعَّالٌ لِّمَا يُرِيدُ

Asalaka maye alingi

85:17

هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡجُنُودِ

Ekomelaki yo te sango ya mapinga

85:18

فِرۡعَوۡنَ وَثَمُودَ

Ya Falo na Thamúd

85:19

بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي تَكۡذِيبٍ

Kasi bapagano bazali sé koboya kondima

85:20

وَٱللَّهُ مِن وَرَآئِهِم مُّحِيطُۢ

Nzoka nde Allah azingi bango

85:21

بَلۡ هُوَ قُرۡءَانٌ مَّجِيدٌ

Kasi yango ezali kurani ya lokumu

85:22

فِي لَوۡحٍ مَّحۡفُوظِۭ

Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.