بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
84:1إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنشَقَّتۡ
Ntango mapata mako pasuka
84:2وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala
84:3وَإِذَا ٱلۡأَرۡضُ مُدَّتۡ
Mpe ntango mabele makolalisama
84:4وَأَلۡقَتۡ مَا فِيهَا وَتَخَلَّتۡ
Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba
84:5وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala
84:6يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ إِنَّكَ كَادِحٌ إِلَىٰ رَبِّكَ كَدۡحًا فَمُلَٰقِيهِ
Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye
84:7فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ
Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali
84:8فَسَوۡفَ يُحَاسَبُ حِسَابًا يَسِيرًا
Akosambisama na ndenge ya malamu
84:9وَيَنقَلِبُ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا
Mpe akozonga o’libota naye na esengo
84:10وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ وَرَآءَ ظَهۡرِهِۦ
Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye
84:11فَسَوۡفَ يَدۡعُواْ ثُبُورًا
Akomisengela mabe
84:12وَيَصۡلَىٰ سَعِيرًا
Мре akozikisama okati ya moto ya makasi
84:13إِنَّهُۥ كَانَ فِيٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا
Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye
84:14إِنَّهُۥ ظَنَّ أَن لَّن يَحُورَ
Azalaki kokanisa te ete akosekwisama
84:15بَلَىٰٓۚ إِنَّ رَبَّهُۥ كَانَ بِهِۦ بَصِيرًا
Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye
84:16فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلشَّفَقِ
Te na lapi na ngonga ya mpokwa
84:17وَٱلَّيۡلِ وَمَا وَسَقَ
Mpe na lapi na butu na molili na yango
84:18وَٱلۡقَمَرِ إِذَا ٱتَّسَقَ
Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba
84:19لَتَرۡكَبُنَّ طَبَقًا عَن طَبَقٍ
Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni
84:20فَمَا لَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Mpona nini bazali kondima te
84:21وَإِذَا قُرِئَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقُرۡءَانُ لَا يَسۡجُدُونَۤ
Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango
84:22بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُكَذِّبُونَ
Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta
84:23وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يُوعُونَ
Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba
84:24فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
Pesa bango sango ya etumbu ya makasi
84:25إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونِۭ
Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.