Surah 86 · 17 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah At-Tariq in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

86:1

وَٱلسَّمَآءِ وَٱلطَّارِقِ

(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu

86:2

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلطَّارِقُ

Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu

86:3

ٱلنَّجۡمُ ٱلثَّاقِبُ

Ezali monzoto ya bongengi makasi

86:4

إِن كُلُّ نَفۡسٍ لَّمَّا عَلَيۡهَا حَافِظٌ

Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye

86:5

فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ مِمَّ خُلِقَ

Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki

86:6

خُلِقَ مِن مَّآءٍ دَافِقٍ

Akelamaki kowuta na litanga ya mayi

86:7

يَخۡرُجُ مِنۢ بَيۡنِ ٱلصُّلۡبِ وَٱلتَّرَآئِبِ

Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi

86:8

إِنَّهُۥ عَلَىٰ رَجۡعِهِۦ لَقَادِرٌ

Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi

86:9

يَوۡمَ تُبۡلَى ٱلسَّرَآئِرُ

Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki

86:10

فَمَا لَهُۥ مِن قُوَّةٍ وَلَا نَاصِرٍ

Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te

86:11

وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلرَّجۡعِ

(Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula

86:12

وَٱلۡأَرۡضِ ذَاتِ ٱلصَّدۡعِ

Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama

86:13

إِنَّهُۥ لَقَوۡلٌ فَصۡلٌ

Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo

86:14

وَمَا هُوَ بِٱلۡهَزۡلِ

Kasi ezali eloko ya pamba te

86:15

إِنَّهُمۡ يَكِيدُونَ كَيۡدًا

Ya soló, bango bazali koyangela mwango

86:16

وَأَكِيدُ كَيۡدًا

Ngai mpe nazali na ya ngai mwango

86:17

فَمَهِّلِ ٱلۡكَٰفِرِينَ أَمۡهِلۡهُمۡ رُوَيۡدَۢا

Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.