Surah 82 · 19 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Infitar in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

82:1

إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنفَطَرَتۡ

Ntango likolo ekokabwana

82:2

وَإِذَا ٱلۡكَوَاكِبُ ٱنتَثَرَتۡ

Mpe ntango minzoto mikolimwa

82:3

وَإِذَا ٱلۡبِحَارُ فُجِّرَتۡ

Mpe ntango bibale bikosangisama

82:4

وَإِذَا ٱلۡقُبُورُ بُعۡثِرَتۡ

Mpe ntango malita makobalusama mpe makobimisa bawa

82:5

عَلِمَتۡ نَفۡسٌ مَّا قَدَّمَتۡ وَأَخَّرَتۡ

Molimo mokoyeba maye awelisaki mpe maye azelisaki

82:6

يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ مَا غَرَّكَ بِرَبِّكَ ٱلۡكَرِيمِ

Oh yo moto! Nini ekosi yo тропа Nkolo nayo ya bolingo

82:7

ٱلَّذِي خَلَقَكَ فَسَوَّىٰكَ فَعَدَلَكَ

Oyo akeli yo mpe abongisi lolenge nayo

82:8

فِيٓ أَيِّ صُورَةٍ مَّا شَآءَ رَكَّبَكَ

Mpe asali yo na lolenge naye alingaki

82:9

كـَلَّا بَلۡ تُكَذِّبُونَ بِٱلدِّينِ

Kaši bozali na ntembe тропа mokolo ya suka

82:10

وَإِنَّ عَلَيۡكُمۡ لَحَٰفِظِينَ

Mpe ya sôló, bozali na bakengeli

82:11

كِرَامًا كَٰتِبِينَ

Bankomi ya sôló

82:12

يَعۡلَمُونَ مَا تَفۡعَلُونَ

Bayebi maye manso bozali kosala

82:13

إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ لَفِي نَعِيمٍ

Ya soló, bato ya malamu bakozala o’kati ya bisengo

82:14

وَإِنَّ ٱلۡفُجَّارَ لَفِي جَحِيمٍ

Mpe ya soló bato ya mabe bakozala okati ya lifelo

82:15

يَصۡلَوۡنَهَا يَوۡمَ ٱلدِّينِ

Bakozikisama na yango mokolo ya mbano

82:16

وَمَا هُمۡ عَنۡهَا بِغَآئِبِينَ

Mpe bakozangisama te na etumbu ena

82:17

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ

Kasi nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano

82:18

ثُمَّ مَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ

Sima lisusu nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano

82:19

يَوۡمَ لَا تَمۡلِكُ نَفۡسٌ لِّنَفۡسٍ شَيۡـًٔاۖ وَٱلۡأَمۡرُ يَوۡمَئِذٍ لِّلَّهِ

Mokolo moye molimo ekosalisa molimo mosusu na eloko te mpe mokolo mona mobeko mokozala sé ya Allah

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.