بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
81:1إِذَا ٱلشَّمۡسُ كُوِّرَتۡ
Ntango mwese (moyi) mokokoma molili
81:2وَإِذَا ٱلنُّجُومُ ٱنكَدَرَتۡ
Mpe ntango minzoto miko limwa
81:3وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ سُيِّرَتۡ
Mpe bangomba bikotambola
81:4وَإِذَا ٱلۡعِشَارُ عُطِّلَتۡ
Mpe ntango bakamela ya zemi bakosundolama
81:5وَإِذَا ٱلۡوُحُوشُ حُشِرَتۡ
Mpe banyama ya mabe bakosangisama
81:6وَإِذَا ٱلۡبِحَارُ سُجِّرَتۡ
Mpe ntango bibale bikopela móto
81:7وَإِذَا ٱلنُّفُوسُ زُوِّجَتۡ
Mpe milimo mikosangisama
81:8وَإِذَا ٱلۡمَوۡءُۥدَةُ سُئِلَتۡ
Mpe ntango mwana шоке ya mwasi akotunama
81:9بِأَيِّ ذَنۢبٍ قُتِلَتۡ
Nalisumu nini asalaki mpo baboma ye
81:10وَإِذَا ٱلصُّحُفُ نُشِرَتۡ
Mpe ntango bakosakola makomi
81:11وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ كُشِطَتۡ
Mpe ntango mapata makopasuka
81:12وَإِذَا ٱلۡجَحِيمُ سُعِّرَتۡ
Mpe ntango lifelo likopelisama
81:13وَإِذَا ٱلۡجَنَّةُ أُزۡلِفَتۡ
Mpe ntango lola ekokoma pembeni na bato
81:14عَلِمَتۡ نَفۡسٌ مَّآ أَحۡضَرَتۡ
Moto akoyeba maye asalaki
81:15فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلۡخُنَّسِ
Te, na lapi na mapata maye matongami
81:16ٱلۡجَوَارِ ٱلۡكُنَّسِ
Maye mazali kokima mpe kolimwa
81:17وَٱلَّيۡلِ إِذَا عَسۡعَسَ
Na lapi mpe na butu ntango ekweyaka
81:18وَٱلصُّبۡحِ إِذَا تَنَفَّسَ
Mpe na ntongo ntango etanaka
81:19إِنَّهُۥ لَقَوۡلُ رَسُولٍ كَرِيمٍ
Ya soló, oyo ezali liloba ya motindami gabiliyele ya lokumu
81:20ذِي قُوَّةٍ عِندَ ذِي ٱلۡعَرۡشِ مَكِينٍ
Atondi na nguya kowuta epai na Nkolo ya ngwende ya lokumu
81:21مُّطَاعٍ ثَمَّ أَمِينٍ
Atosami atonda bosembo
81:22وَمَا صَاحِبُكُم بِمَجۡنُونٍ
Sôló ndeko na bino (Muhammad) azali na ligboma te
81:23وَلَقَدۡ رَءَاهُ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡمُبِينِ
Amonaki ye ya sôló na suka, oyo likolo emonanaka polele lokola ekweyi na mabele
81:24وَمَا هُوَ عَلَى ٱلۡغَيۡبِ بِضَنِينٍ
Azali kobomba te maye makitaki epai naye
81:25وَمَا هُوَ بِقَوۡلِ شَيۡطَٰنٍ رَّجِيمٍ
Yango (kurani) ezali liloba ya satana te
81:26فَأَيۡنَ تَذۡهَبُونَ
Bozali kokende wapi
81:27إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٌ لِّلۡعَٰلَمِينَ
Ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba
81:28لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَسۡتَقِيمَ
Na oyo alingi kati na bino amisembwama
81:29وَمَا تَشَآءُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bokolingaka te sé sima ya kolinga ya (Allah) Nkolo ya mokili
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.