بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
87:1سَبِّحِ ٱسۡمَ رَبِّكَ ٱلۡأَعۡلَى
S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka
87:2ٱلَّذِي خَلَقَ فَسَوَّىٰ
Oyo akela mpe akokisa
87:3وَٱلَّذِي قَدَّرَ فَهَدَىٰ
Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba
87:4وَٱلَّذِيٓ أَخۡرَجَ ٱلۡمَرۡعَىٰ
Mpe oyo abimisa matiti
87:5فَجَعَلَهُۥ غُثَآءً أَحۡوَىٰ
Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu
87:6سَنُقۡرِئُكَ فَلَا تَنسَىٰٓ
Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te
87:7إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ يَعۡلَمُ ٱلۡجَهۡرَ وَمَا يَخۡفَىٰ
Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama
87:8وَنُيَسِّرُكَ لِلۡيُسۡرَىٰ
Mpe tokolakisa yo nzela ya pete
87:9فَذَكِّرۡ إِن نَّفَعَتِ ٱلذِّكۡرَىٰ
Pesa liteya na baye ekosalisa bango
87:10سَيَذَّكَّرُ مَن يَخۡشَىٰ
Oyo azali na bobangi nde akokanisa
87:11وَيَتَجَنَّبُهَا ٱلۡأَشۡقَى
Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi
87:12ٱلَّذِي يَصۡلَى ٱلنَّارَ ٱلۡكُبۡرَىٰ
Oyo akozika na moto ya monene
87:13ثُمَّ لَا يَمُوتُ فِيهَا وَلَا يَحۡيَىٰ
O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te
87:14قَدۡ أَفۡلَحَ مَن تَزَكَّىٰ
Asili kolonga oyo amipetoli
87:15وَذَكَرَ ٱسۡمَ رَبِّهِۦ فَصَلَّىٰ
Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli
87:16بَلۡ تُؤۡثِرُونَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا
Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé
87:17وَٱلۡأٓخِرَةُ خَيۡرٌ وَأَبۡقَىٰٓ
Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko
87:18إِنَّ هَٰذَا لَفِي ٱلصُّحُفِ ٱلۡأُولَىٰ
Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo
87:19صُحُفِ إِبۡرَٰهِيمَ وَمُوسَىٰ
Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.