بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
88:1هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡغَٰشِيَةِ
Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa
88:2وُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ خَٰشِعَةٌ
Mokolo wana bilongi bikobanga
88:3عَامِلَةٌ نَّاصِبَةٌ
Makambo maleki bango bakomi na bolembu
88:4تَصۡلَىٰ نَارًا حَامِيَةً
Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi
88:5تُسۡقَىٰ مِنۡ عَيۡنٍ ءَانِيَةٍ
Mpe bakomelisa bango mayi ya moto
88:6لَّيۡسَ لَهُمۡ طَعَامٌ إِلَّا مِن ضَرِيعٍ
Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube
88:7لَّا يُسۡمِنُ وَلَا يُغۡنِي مِن جُوعٍ
Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te
88:8وُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ نَّاعِمَةٌ
Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo
88:9لِّسَعۡيِهَا رَاضِيَةٌ
Bikosepela pona maye basalaki
88:10فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٍ
Okati ya lola ya likolo
88:11لَّا تَسۡمَعُ فِيهَا لَٰغِيَةً
Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba
88:12فِيهَا عَيۡنٌ جَارِيَةٌ
Okati na yango maziba mazali kotiola
88:13فِيهَا سُرُرٌ مَّرۡفُوعَةٌ
Okati na yango bambeto ya kotombwama
88:14وَأَكۡوَابٌ مَّوۡضُوعَةٌ
Mpe bakopo bitiami
88:15وَنَمَارِقُ مَصۡفُوفَةٌ
Mpe bikáta bitandami
88:16وَزَرَابِيُّ مَبۡثُوثَةٌ
Mpe bankwala bizali ya kotandama
88:17أَفَلَا يَنظُرُونَ إِلَى ٱلۡإِبِلِ كَيۡفَ خُلِقَتۡ
Bazali kot ala te ba ibil ndenge ekelama
88:18وَإِلَى ٱلسَّمَآءِ كَيۡفَ رُفِعَتۡ
Mapata lolenge etombwama
88:19وَإِلَى ٱلۡجِبَالِ كَيۡفَ نُصِبَتۡ
Mpe bangomba lolenge epikama
88:20وَإِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَيۡفَ سُطِحَتۡ
Mpe mabele lolenge etandama
88:21فَذَكِّرۡ إِنَّمَآ أَنتَ مُذَكِّرٌ
Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli
88:22لَّسۡتَ عَلَيۡهِم بِمُصَيۡطِرٍ
Kasi ozali mokengeli likolo na bango te
88:23إِلَّا مَن تَوَلَّىٰ وَكَفَرَ
Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima
88:24فَيُعَذِّبُهُ ٱللَّهُ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَكۡبَرَ
Allah akopesa ye etumbu ya monene
88:25إِنَّ إِلَيۡنَآ إِيَابَهُمۡ
Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango
88:26ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا حِسَابَهُم
Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.