بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
80:1عَبَسَ وَتَوَلَّىٰٓ
Akangi elongi mpe apesi mokongo
80:2أَن جَآءَهُ ٱلۡأَعۡمَىٰ
Mpo ete mokufi miso aye epai naye
80:3وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّهُۥ يَزَّكَّىٰٓ
Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola
80:4أَوۡ يَذَّكَّرُ فَتَنفَعَهُ ٱلذِّكۡرَىٰٓ
To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye
80:5أَمَّا مَنِ ٱسۡتَغۡنَىٰ
Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye
80:6فَأَنتَ لَهُۥ تَصَدَّىٰ
Ozali koyamba ye na lombango
80:7وَمَا عَلَيۡكَ أَلَّا يَزَّكَّىٰ
Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te
80:8وَأَمَّا مَن جَآءَكَ يَسۡعَىٰ
Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo
80:9وَهُوَ يَخۡشَىٰ
Naye azali na bobangi
80:10فَأَنتَ عَنۡهُ تَلَهَّىٰ
Ozali kotala ye te
80:11كـَلَّآ إِنَّهَا تَذۡكِرَةٌ
Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya
80:12فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
Oyo alingi akanisa yango
80:13فِي صُحُفٍ مُّكَرَّمَةٍ
Ezwami kati ya makomi ya lokumu
80:14مَّرۡفُوعَةٍ مُّطَهَّرَةِۭ
Etombwami mpe epetolami
80:15بِأَيۡدِي سَفَرَةٍ
O’maboko ma bantoma
80:16كِرَامِۭ بَرَرَةٍ
Baye ya lokumu тре botosi
80:17قُتِلَ ٱلۡإِنسَٰنُ مَآ أَكۡفَرَهُۥ
Moto amibomi na bopengwi naye
80:18مِنۡ أَيِّ شَيۡءٍ خَلَقَهُۥ
Na eloko nini akelamaki
80:19مِن نُّطۡفَةٍ خَلَقَهُۥ فَقَدَّرَهُۥ
Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye
80:20ثُمَّ ٱلسَّبِيلَ يَسَّرَهُۥ
Sima alakisi ye nzela
80:21ثُمَّ أَمَاتَهُۥ فَأَقۡبَرَهُۥ
Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita
80:22ثُمَّ إِذَا شَآءَ أَنشَرَهُۥ
Mpe akosekwisa ye na ntango alingi
80:23كـَلَّا لَمَّا يَقۡضِ مَآ أَمَرَهُۥ
Moto akokisi te maye atindamaki
80:24فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ إِلَىٰ طَعَامِهِۦٓ
Esengeli na moto atala bileyi naye
80:25أَنَّا صَبَبۡنَا ٱلۡمَآءَ صَبًّا
Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi
80:26ثُمَّ شَقَقۡنَا ٱلۡأَرۡضَ شَقًّا
Sima topasoli mabele na nzela
80:27فَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا حَبًّا
Mpe na nzela wana tobimisi bambuma
80:28وَعِنَبًا وَقَضۡبًا
Ba inab mpe bandunda
80:29وَزَيۡتُونًا وَنَخۡلًا
Na nzete ya zaítún na nzete ya nagh’l
80:30وَحَدَآئِقَ غُلۡبًا
ЗО. Мре bilanga ebele
80:31وَفَٰكِهَةً وَأَبًّا
Мре tobimisi mbuma mpe matiti
80:32مَّتَٰعًا لَّكُمۡ وَلِأَنۡعَٰمِكُمۡ
Bileyi тропа bino na An’âm na bino
80:33فَإِذَا جَآءَتِ ٱلصَّآخَّةُ
Kasi tango bobulungani ekoya
80:34يَوۡمَ يَفِرُّ ٱلۡمَرۡءُ مِنۡ أَخِيهِ
Mokolo moye moto akokima ndeko naye
80:35وَأُمِّهِۦ وَأَبِيهِ
Mpe akokima mama naye mpe tata naye
80:36وَصَٰحِبَتِهِۦ وَبَنِيهِ
Akokima mwasi naye mpe bana baye
80:37لِكُلِّ ٱمۡرِيٍٕ مِّنۡهُمۡ يَوۡمَئِذٍ شَأۡنٌ يُغۡنِيهِ
Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye
80:38وُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ مُّسۡفِرَةٌ
Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga
80:39ضَاحِكَةٌ مُّسۡتَبۡشِرَةٌ
Bakoseka mpe bakosepela
80:40وَوُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ عَلَيۡهَا غَبَرَةٌ
Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu
80:41تَرۡهَقُهَا قَتَرَةٌ
Bikozipama na molili
80:42أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡكَفَرَةُ ٱلۡفَجَرَةُ
Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.