بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
89:1وَٱلۡفَجۡرِ
(Nalapi) na eleko ya ntongo
89:2وَلَيَالٍ عَشۡرٍ
(Mpe nalapi) na babutu zomi
89:3وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ
(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te
89:4وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ
(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka
89:5هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٌ لِّذِي حِجۡرٍ
Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele
89:6أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ
Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad
89:7إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ
Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo
89:8ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili
89:9وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ
Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba
89:10وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ
Na Falo moto ya mapinga
89:11ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango
89:12فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ
Mpe babebisaki mingi koleka
89:13فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ
Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu
89:14إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ
Mpo ete Nkolo nayo azali kotala
89:15فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ
Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga
89:16وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ
Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga
89:17كـَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ
Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te
89:18وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola
89:19وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلًا لَّمًّا
Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe
89:20وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبًّا جَمًّا
Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi
89:21كـَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكًّا دَكًّا
Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo
89:22وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفًّا صَفًّا
Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo
89:23وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٍ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ
Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te
89:24يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي
Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai
89:25فَيَوۡمَئِذٍ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٌ
Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te
89:26وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٌ
Mpe moto moko te akokangama lokola ye
89:27يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ
Oh yo molimo y a kimia
89:28ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةً مَّرۡضِيَّةً
Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo
89:29فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي
Kota elongo na bawumbu ba ngai
89:30وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي
Mpe kota okati ya lola na ngai
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.