Surah 52 · 49 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah At-Tur in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

52:1

وَٱلطُّورِ

Na ngomba ya at’tur

52:2

وَكِتَٰبٍ مَّسۡطُورٍ

Na buku oyo ekomama (na ba anzelu)

52:3

فِي رَقٍّ مَّنشُورٍ

Likolo ya ekomami ya polele

52:4

وَٱلۡبَيۡتِ ٱلۡمَعۡمُورِ

Na ndako oyo etondama

52:5

وَٱلسَّقۡفِ ٱلۡمَرۡفُوعِ

Mpe na likolo lolenge etombwama

52:6

وَٱلۡبَحۡرِ ٱلۡمَسۡجُورِ

Мре na ebale ya kotonda

52:7

إِنَّ عَذَابَ رَبِّكَ لَوَٰقِعٌ

Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama

52:8

مَّا لَهُۥ مِن دَافِعٍ

Ekozala na moto ya kopekisa yango te

52:9

يَوۡمَ تَمُورُ ٱلسَّمَآءُ مَوۡرًا

Mokolo likolo likoningana

52:10

وَتَسِيرُ ٱلۡجِبَالُ سَيۡرًا

Mpe bangomba bikotambola

52:11

فَوَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ

Mpasi ekozalaka mokolo wana epai ya babuki lokuta

52:12

ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي خَوۡضٍ يَلۡعَبُونَ

Baye bazalaki na komibuaka na kati ya masano

52:13

يَوۡمَ يُدَعُّونَ إِلَىٰ نَارِ جَهَنَّمَ دَعًّا

Mokolo oyo bakobendaka bango na makasi na lifelo

52:14

هَٰذِهِ ٱلنَّارُ ٱلَّتِي كُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ

Oyo nde lifelo oyo bozalaki kotiyela yango tembe

52:15

أَفَسِحۡرٌ هَٰذَآ أَمۡ أَنتُمۡ لَا تُبۡصِرُونَ

Boye oyo mpe ezali kindoki to bozali kornona malamu te

52:16

ٱصۡلَوۡهَا فَٱصۡبِرُوٓاْ أَوۡ لَا تَصۡبِرُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡكُمۡۖ إِنَّمَا تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

Bôžika kati na yango, bozala na bozeli to te, bokozala sé ndenge moko. Bokofutama sé kolandana na oyo bozalaki kosala

52:17

إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٍ وَنَعِيمٍ

Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango

52:18

فَٰكِهِينَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ وَوَقَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ

Bakomisepelisa na oyo Nkolo wa bango akopesa bango, mpe Nkolo wa bango akobatela bango na etumbu ya lifelo

52:19

كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

Bolia bomela na mposa na biso, тропа lifuta ya maye bosalaki

52:20

مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ سُرُرٍ مَّصۡفُوفَةٍۖ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٍ

Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo

52:21

وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱتَّبَعَتۡهُمۡ ذُرِّيَّتُهُم بِإِيمَٰنٍ أَلۡحَقۡنَا بِهِمۡ ذُرِّيَّتَهُمۡ وَمَآ أَلَتۡنَٰهُم مِّنۡ عَمَلِهِم مِّن شَيۡءٍۚ كُلُّ ٱمۡرِيِٕۭ بِمَا كَسَبَ رَهِينٌ

Mpe тропа baye bandima mpe mabota na bango elandi bango na bondimi; tokolandisela bango mabota na bango, mpe tokokutolaka maye basalaki ata токе te okati ya misala mia bango. Moto nyoso akotunamaka na makambo naye

52:22

وَأَمۡدَدۡنَٰهُم بِفَٰكِهَةٍ وَلَحۡمٍ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ

Mpe tokopesaka bango bambuma mpe mișuni (ya kolia) oyo bakolinga

52:23

يَتَنَٰزَعُونَ فِيهَا كَأۡسًا لَّا لَغۡوٌ فِيهَا وَلَا تَأۡثِيمٌ

Nkeni moko ekotambola kati kati na bango, ekopesa bilobela lobela te mpe lisumu te

52:24

وَيَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ غِلۡمَانٌ لَّهُمۡ كَأَنَّهُمۡ لُؤۡلُؤٌ مَّكۡنُونٌ

Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi

52:25

وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ يَتَسَآءَلُونَ

Mpe bakobalukaka bango na bango bazali kotunana

52:26

قَالُوٓاْ إِنَّا كُنَّا قَبۡلُ فِيٓ أَهۡلِنَا مُشۡفِقِينَ

Bakoloba ete: Ya soló, tofandaki okati ya mabota ma biso na bobangi (Allah)

52:27

فَمَنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡنَا وَوَقَىٰنَا عَذَابَ ٱلسَّمُومِ

Yango Allah apesi biso mpe abateli biso na etumbu ya lifelo

52:28

إِنَّا كُنَّا مِن قَبۡلُ نَدۡعُوهُۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡبَرُّ ٱلرَّحِيمُ

Ya sólo, tozalaki kobondela ye, ya sólo, ye azali malamu mpe atonda mawa

52:29

فَذَكِّرۡ فَمَآ أَنتَ بِنِعۡمَتِ رَبِّكَ بِكَاهِنٍ وَلَا مَجۡنُونٍ

Kundola тропа bolamu ya Nkolo nayo, ozali nganga te mpe ozali ligboma te

52:30

أَمۡ يَقُولُونَ شَاعِرٌ نَّتَرَبَّصُ بِهِۦ رَيۡبَ ٱلۡمَنُونِ

То bazali koloba ete: Azali mokomi ntoki, tozela likama naye ya liwa

52:31

قُلۡ تَرَبَّصُواْ فَإِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُتَرَبِّصِينَ

Loba: Bozela, ngai mpe na bino mpe tozali kozela

52:32

أَمۡ تَأۡمُرُهُمۡ أَحۡلَٰمُهُم بِهَٰذَآۚ أَمۡ هُمۡ قَوۡمٌ طَاغُونَ

То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki

52:33

أَمۡ يَقُولُونَ تَقَوَّلَهُۥۚ بَل لَّا يُؤۡمِنُونَ

To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te

52:34

فَلۡيَأۡتُواْ بِحَدِيثٍ مِّثۡلِهِۦٓ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ

(Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo

52:35

أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ

To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli

52:36

أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ

To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te

52:37

أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَبِّكَ أَمۡ هُمُ ٱلۡمُصَۜيۡطِرُونَ

To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso

52:38

أَمۡ لَهُمۡ سُلَّمٌ يَسۡتَمِعُونَ فِيهِۖ فَلۡيَأۡتِ مُسۡتَمِعُهُم بِسُلۡطَٰنٍ مُّبِينٍ

To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele

52:39

أَمۡ لَهُ ٱلۡبَنَٰتُ وَلَكُمُ ٱلۡبَنُونَ

To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali

52:40

أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرًا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٍ مُّثۡقَلُونَ

To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta

52:41

أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ

To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango

52:42

أَمۡ يُرِيدُونَ كَيۡدًاۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هُمُ ٱلۡمَكِيدُونَ

To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko

52:43

أَمۡ لَهُمۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ

To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa

52:44

وَإِن يَرَوۡاْ كِسۡفًا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ سَاقِطًا يَقُولُواْ سَحَابٌ مَّرۡكُومٌ

Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama

52:45

فَذَرۡهُمۡ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي فِيهِ يُصۡعَقُونَ

Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake

52:46

يَوۡمَ لَا يُغۡنِي عَنۡهُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـًٔا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ

Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te

52:47

وَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ عَذَابًا دُونَ ذَٰلِكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ

Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te

52:48

وَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ فَإِنَّكَ بِأَعۡيُنِنَاۖ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ حِينَ تَقُومُ

Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema

52:49

وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَإِدۡبَٰرَ ٱلنُّجُومِ

Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.