بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
75:1لَآ أُقۡسِمُ بِيَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ
Nalapi na mokolo ya lisekwa
75:2وَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلنَّفۡسِ ٱللَّوَّامَةِ
Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te
75:3أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَلَّن نَّجۡمَعَ عِظَامَهُۥ
Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te
75:4بَلَىٰ قَٰدِرِينَ عَلَىٰٓ أَن نُّسَوِّيَ بَنَانَهُۥ
Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)
75:5بَلۡ يُرِيدُ ٱلۡإِنسَٰنُ لِيَفۡجُرَ أَمَامَهُۥ
Moto alingi sé atikala na mabe
75:6يَسۡـَٔلُ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلۡقِيَٰمَةِ
Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini
75:7فَإِذَا بَرِقَ ٱلۡبَصَرُ
Tango miso ekobulungana (ezangi kornona)
75:8وَخَسَفَ ٱلۡقَمَرُ
Mpe sanza ekozanga bongengi na yango
75:9وَجُمِعَ ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ
Mpe moyi na sanza ekosanganaka
75:10يَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذٍ أَيۡنَ ٱلۡمَفَرُّ
Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima
75:11كـَلَّا لَا وَزَرَ
Esika ya kokima ezali te
75:12إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمُسۡتَقَرُّ
Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo
75:13يُنَبَّؤُاْ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذِۭ بِمَا قَدَّمَ وَأَخَّرَ
Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima
75:14بَلِ ٱلۡإِنسَٰنُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ بَصِيرَةٌ
Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)
75:15وَلَوۡ أَلۡقَىٰ مَعَاذِيرَهُۥ
Mpe ata asengi bolimbisi
75:16لَا تُحَرِّكۡ بِهِۦ لِسَانَكَ لِتَعۡجَلَ بِهِۦٓ
Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani)
75:17إِنَّ عَلَيۡنَا جَمۡعَهُۥ وَقُرۡءَانَهُۥ
Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango
75:18فَإِذَا قَرَأۡنَٰهُ فَٱتَّبِعۡ قُرۡءَانَهُۥ
Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu
75:19ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا بَيَانَهُۥ
Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango
75:20كـَلَّا بَلۡ تُحِبُّونَ ٱلۡعَاجِلَةَ
Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé
75:21وَتَذَرُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka
75:22وُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ نَّاضِرَةٌ
Mokolo wana okomona bilongi bikongenga
75:23إِلَىٰ رَبِّهَا نَاظِرَةٌ
Bizali kotala Nkolo na yango
75:24وَوُجُوهٌ يَوۡمَئِذِۭ بَاسِرَةٌ
Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda
75:25تَظُنُّ أَن يُفۡعَلَ بِهَا فَاقِرَةٌ
Bizali kozela etumbu
75:26كـَلَّآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلتَّرَاقِيَ
Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo
75:27وَقِيلَ مَنۡۜ رَاقٍ
Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi
75:28وَظَنَّ أَنَّهُ ٱلۡفِرَاقُ
Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa)
75:29وَٱلۡتَفَّتِ ٱلسَّاقُ بِٱلسَّاقِ
Mpe lokolo elali likolo ya moninga
75:30إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمَسَاقُ
Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana
75:31فَلَا صَدَّقَ وَلَا صَلَّىٰ
Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te
75:32وَلَٰكِن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo
75:33ثُمَّ ذَهَبَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ يَتَمَطَّىٰٓ
Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo
75:34أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰ
Mpasi nayo mpasi
75:35ثُمَّ أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰٓ
Sima mpasi nayo mpasi
75:36أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَن يُتۡرَكَ سُدًى
Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)
75:37أَلَمۡ يَكُ نُطۡفَةً مِّن مَّنِيٍّ يُمۡنَىٰ
Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama
75:38ثُمَّ كَانَ عَلَقَةً فَخَلَقَ فَسَوَّىٰ
Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te
75:39فَجَعَلَ مِنۡهُ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰٓ
Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali
75:40أَلَيۡسَ ذَٰلِكَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يُحۡـِۧيَ ٱلۡمَوۡتَىٰ
Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.