بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
74:1يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُدَّثِّرُ
Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti
74:2قُمۡ فَأَنذِرۡ
Telema mpe kebisa
74:3وَرَبَّكَ فَكَبِّرۡ
Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene
74:4وَثِيَابَكَ فَطَهِّرۡ
Mpe petóla bilamba nayo
74:5وَٱلرُّجۡزَ فَٱهۡجُرۡ
Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)
74:6وَلَا تَمۡنُن تَسۡتَكۡثِرُ
Mpe kopesa te mpo bafuta yo
74:7وَلِرَبِّكَ فَٱصۡبِرۡ
Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo
74:8فَإِذَا نُقِرَ فِي ٱلنَّاقُورِ
Mpe tango bakofula kelelo
74:9فَذَٰلِكَ يَوۡمَئِذٍ يَوۡمٌ عَسِيرٌ
Wana ekozala mokolo ya mpasi
74:10عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ غَيۡرُ يَسِيرٍ
Mpona bapengwi ekozala mpete te
74:11ذَرۡنِي وَمَنۡ خَلَقۡتُ وَحِيدًا
Tika ngai na oyo nakeli ye moko
74:12وَجَعَلۡتُ لَهُۥ مَالًا مَّمۡدُودًا
Mpe oyo napesaki misolo ebele
74:13وَبَنِينَ شُهُودًا
Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso
74:14وَمَهَّدتُّ لَهُۥ تَمۡهِيدًا
Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso
74:15ثُمَّ يَطۡمَعُ أَنۡ أَزِيدَ
Sima, apengwi na bolamu (na ngai)
74:16كـَلَّآۖ إِنَّهُۥ كَانَ لِأٓيَٰتِنَا عَنِيدًا
Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi
74:17سَأُرۡهِقُهُۥ صَعُودًا
Nakopesa ye pasi ya koleka
74:18إِنَّهُۥ فَكَّرَ وَقَدَّرَ
Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano
74:19فَقُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
Akufa na ndenge akanaki
74:20ثُمَّ قُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
Sima akufa na ndenge akanaki
74:21ثُمَّ نَظَرَ
Sima atalaki
74:22ثُمَّ عَبَسَ وَبَسَرَ
Sima abebisi elongi mpe akangi
74:23ثُمَّ أَدۡبَرَ وَٱسۡتَكۡبَرَ
Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo
74:24فَقَالَ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٌ يُؤۡثَرُ
Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami
74:25إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا قَوۡلُ ٱلۡبَشَرِ
Wana ezali sé liloba lia moto
74:26سَأُصۡلِيهِ سَقَرَ
Nakozikisa ye na moto ya saqar
74:27وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سَقَرُ
Nani akoyebisa yo nini saqar
74:28لَا تُبۡقِي وَلَا تَذَرُ
Etiki eloko te mpe ebateli te
74:29لَوَّاحَةٌ لِّلۡبَشَرِ
Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo
74:30عَلَيۡهَا تِسۡعَةَ عَشَرَ
O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua
74:31وَمَا جَعَلۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ إِلَّا مَلَٰٓئِكَةًۖ وَمَا جَعَلۡنَا عِدَّتَهُمۡ إِلَّا فِتۡنَةً لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيَسۡتَيۡقِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَيَزۡدَادَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِيمَٰنًا وَلَا يَرۡتَابَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَلِيَقُولَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ وَٱلۡكَٰفِرُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلًاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَمَا يَعۡلَمُ جُنُودَ رَبِّكَ إِلَّا هُوَۚ وَمَا هِيَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡبَشَرِ
Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato
74:32كـَلَّا وَٱلۡقَمَرِ
Te; (nalapi) na sanza
74:33وَٱلَّيۡلِ إِذۡ أَدۡبَرَ
Mpe butu tango elalaka
74:34وَٱلصُّبۡحِ إِذَآ أَسۡفَرَ
Mpe tongo tango etanaka
74:35إِنَّهَا لَإِحۡدَى ٱلۡكُبَرِ
(Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene
74:36نَذِيرًا لِّلۡبَشَرِ
Ezali bokundoli тропа bato
74:37لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَتَقَدَّمَ أَوۡ يَتَأَخَّرَ
Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima
74:38كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ رَهِينَةٌ
Molimo nyoso akozua oyo asalaki
74:39إِلَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡيَمِينِ
Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi)
74:40فِي جَنَّٰتٍ يَتَسَآءَلُونَ
(Bakozalaka) na lola bakomitunama
74:41عَنِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
(Mpona) batomboki
74:42مَا سَلَكَكُمۡ فِي سَقَرَ
Eloko nini ekotisi bino na saqar
74:43قَالُواْ لَمۡ نَكُ مِنَ ٱلۡمُصَلِّينَ
Bakolobaka: Tozalaki kosambela te
74:44وَلَمۡ نَكُ نُطۡعِمُ ٱلۡمِسۡكِينَ
Mpe tozalaki koleisa babola te
74:45وَكُنَّا نَخُوضُ مَعَ ٱلۡخَآئِضِينَ
Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe
74:46وَكُنَّا نُكَذِّبُ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te
74:47حَتَّىٰٓ أَتَىٰنَا ٱلۡيَقِينُ
Kino liwa liyelaki biso
74:48فَمَا تَنفَعُهُمۡ شَفَٰعَةُ ٱلشَّٰفِعِينَ
Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te
74:49فَمَا لَهُمۡ عَنِ ٱلتَّذۡكِرَةِ مُعۡرِضِينَ
Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo
74:50كَأَنَّهُمۡ حُمُرٌ مُّسۡتَنفِرَةٌ
Bakomi lokola humuru ya kopanzana
74:51فَرَّتۡ مِن قَسۡوَرَةِۭ
Tango bazali kokima nkosi
74:52بَلۡ يُرِيدُ كُلُّ ٱمۡرِيٍٕ مِّنۡهُمۡ أَن يُؤۡتَىٰ صُحُفًا مُّنَشَّرَةً
Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba
74:53كـَلَّاۖ بَل لَّا يَخَافُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te
74:54كـَلَّآ إِنَّهُۥ تَذۡكِرَةٌ
Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli
74:55فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
Oyo alingi akanisa
74:56وَمَا يَذۡكُرُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ هُوَ أَهۡلُ ٱلتَّقۡوَىٰ وَأَهۡلُ ٱلۡمَغۡفِرَةِ
Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.