Surah 70 · 44 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Ma'arij in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

70:1

سَأَلَ سَآئِلُۢ بِعَذَابٍ وَاقِعٍ

Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te

70:2

لِّلۡكَٰفِرِينَ لَيۡسَ لَهُۥ دَافِعٌ

Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi

70:3

مِّنَ ٱللَّهِ ذِي ٱلۡمَعَارِجِ

Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali

70:4

تَعۡرُجُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَٱلرُّوحُ إِلَيۡهِ فِي يَوۡمٍ كَانَ مِقۡدَارُهُۥ خَمۡسِينَ أَلۡفَ سَنَةٍ

Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano

70:5

فَٱصۡبِرۡ صَبۡرًا جَمِيلًا

Zela bozeli ya malamu

70:6

إِنَّهُمۡ يَرَوۡنَهُۥ بَعِيدًا

(Bapengwi) bazali kornona yango mosika

70:7

وَنَرَىٰهُ قَرِيبًا

Kasi tozali kornona yango pembeni

70:8

يَوۡمَ تَكُونُ ٱلسَّمَآءُ كَٱلۡمُهۡلِ

Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta

70:9

وَتَكُونُ ٱلۡجِبَالُ كَٱلۡعِهۡنِ

Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika

70:10

وَلَا يَسۡـَٔلُ حَمِيمٌ حَمِيمًا

Molingami akotuna moninga te

70:11

يُبَصَّرُونَهُمۡۚ يَوَدُّ ٱلۡمُجۡرِمُ لَوۡ يَفۡتَدِي مِنۡ عَذَابِ يَوۡمِئِذِۭ بِبَنِيهِ

Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana

70:12

وَصَٰحِبَتِهِۦ وَأَخِيهِ

To mwasi, to ndeko naye ya mobali

70:13

وَفَصِيلَتِهِ ٱلَّتِي تُـٔۡوِيهِ

(Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye

70:14

وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعًا ثُمَّ يُنجِيهِ

Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye

70:15

كـَلَّآۖ إِنَّهَا لَظَىٰ

Eloko te, ezali nde moto

70:16

نَزَّاعَةً لِّلشَّوَىٰ

Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi

70:17

تَدۡعُواْ مَنۡ أَدۡبَرَ وَتَوَلَّىٰ

Moto ekobengaka baye baboyaki kondima

70:18

وَجَمَعَ فَأَوۡعَىٰٓ

(Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana

70:19

إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ خُلِقَ هَلُوعًا

Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia

70:20

إِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ جَزُوعًا

Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi

70:21

وَإِذَا مَسَّهُ ٱلۡخَيۡرُ مَنُوعًا

Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango

70:22

إِلَّا ٱلۡمُصَلِّينَ

Longola sé baye bazali kotelemisa losambo

70:23

ٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ دَآئِمُونَ

Baye bakangami na losambo na bango libela

70:24

وَٱلَّذِينَ فِيٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ حَقٌّ مَّعۡلُومٌ

Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango

70:25

لِّلسَّآئِلِ وَٱلۡمَحۡرُومِ

Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi

70:26

وَٱلَّذِينَ يُصَدِّقُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ

Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka

70:27

وَٱلَّذِينَ هُم مِّنۡ عَذَابِ رَبِّهِم مُّشۡفِقُونَ

Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango

70:28

إِنَّ عَذَابَ رَبِّهِمۡ غَيۡرُ مَأۡمُونٍ

Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te

70:29

وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِفُرُوجِهِمۡ حَٰفِظُونَ

Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango

70:30

إِلَّا عَلَىٰٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَإِنَّهُمۡ غَيۡرُ مَلُومِينَ

Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango

70:31

فَمَنِ ٱبۡتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡعَادُونَ

Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo

70:32

وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِأَمَٰنَٰتِهِمۡ وَعَهۡدِهِمۡ رَٰعُونَ

Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani

70:33

وَٱلَّذِينَ هُم بِشَهَٰدَٰتِهِمۡ قَآئِمُونَ

Mpe baye bazali kotatola sé bosóló

70:34

وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ يُحَافِظُونَ

Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango

70:35

أُوْلَٰٓئِكَ فِي جَنَّٰتٍ مُّكۡرَمُونَ

Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola

70:36

فَمَالِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ قِبَلَكَ مُهۡطِعِينَ

Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi

70:37

عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ عِزِينَ

Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana

70:38

أَيَطۡمَعُ كُلُّ ٱمۡرِيٍٕ مِّنۡهُمۡ أَن يُدۡخَلَ جَنَّةَ نَعِيمٍ

Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo

70:39

كـَلَّآۖ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّمَّا يَعۡلَمُونَ

Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi

70:40

فَلَآ أُقۡسِمُ بِرَبِّ ٱلۡمَشَٰرِقِ وَٱلۡمَغَٰرِبِ إِنَّا لَقَٰدِرُونَ

Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki

70:41

عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ خَيۡرًا مِّنۡهُمۡ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ

Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te

70:42

فَذَرۡهُمۡ يَخُوضُواْ وَيَلۡعَبُواْ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ

Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango

70:43

يَوۡمَ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ سِرَاعًا كَأَنَّهُمۡ إِلَىٰ نُصُبٍ يُوفِضُونَ

Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami

70:44

خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٌۚ ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلَّذِي كَانُواْ يُوعَدُونَ

Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.