Surah 79 · 46 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah An-Nazi'at in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

79:1

وَٱلنَّٰزِعَٰتِ غَرۡقًا

(Na lapi) na baye bapikolaka na makasi

79:2

وَٱلنَّٰشِطَٰتِ نَشۡطًا

Mpe na baye bayambaka na boboto

79:3

وَٱلسَّٰبِحَٰتِ سَبۡحًا

Mpe baye batambolaka ndenge balingi

79:4

فَٱلسَّٰبِقَٰتِ سَبۡقًا

Mpe balekaka na lombango

79:5

فَٱلۡمُدَبِّرَٰتِ أَمۡرًا

Mpe bazali kobongisa makambo

79:6

يَوۡمَ تَرۡجُفُ ٱلرَّاجِفَةُ

Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo)

79:7

تَتۡبَعُهَا ٱلرَّادِفَةُ

Sima elandani ya mibale

79:8

قُلُوبٌ يَوۡمَئِذٍ وَاجِفَةٌ

Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi

79:9

أَبۡصَٰرُهَا خَٰشِعَةٌ

Miso ma bango mikobanga

79:10

يَقُولُونَ أَءِنَّا لَمَرۡدُودُونَ فِي ٱلۡحَافِرَةِ

Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa

79:11

أَءِذَا كُنَّا عِظَٰمًا نَّخِرَةً

Sima, yakokoma mikuwa ya kopola

79:12

قَالُواْ تِلۡكَ إِذًا كَرَّةٌ خَاسِرَةٌ

Balobi ete: Wana ezali bozongisami ya mpamba

79:13

فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٌ وَٰحِدَةٌ

Ya sôló, yango ezali bosangisi ya mbala moko

79:14

فَإِذَا هُم بِٱلسَّاهِرَةِ

Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango

79:15

هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ مُوسَىٰٓ

Sango ya Mûssa ekomelaki yo te

79:16

إِذۡ نَادَىٰهُ رَبُّهُۥ بِٱلۡوَادِ ٱلۡمُقَدَّسِ طُوًى

Ntango Nkolo naye abengaki ye na ngomba esantu

79:17

ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ

Kende epai ya falo pamba te asili kotomboka

79:18

فَقُلۡ هَل لَّكَ إِلَىٰٓ أَن تَزَكَّىٰ

Мре loba naye ококі komipetola te

79:19

وَأَهۡدِيَكَ إِلَىٰ رَبِّكَ فَتَخۡشَىٰ

Мре nakamba yo epai ya Nkolo nayo mpo obanga ye

79:20

فَأَرَىٰهُ ٱلۡأٓيَةَ ٱلۡكُبۡرَىٰ

Mpe (Mûssa) alakisaki ye likamwisi linene

79:21

فَكَذَّبَ وَعَصَىٰ

(Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa

79:22

ثُمَّ أَدۡبَرَ يَسۡعَىٰ

Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo

79:23

فَحَشَرَ فَنَادَىٰ

Abiangi mpe asangisi bato naye

79:24

فَقَالَ أَنَا۠ رَبُّكُمُ ٱلۡأَعۡلَىٰ

Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka

79:25

فَأَخَذَهُ ٱللَّهُ نَكَالَ ٱلۡأٓخِرَةِ وَٱلۡأُولَىٰٓ

Na yango Allah azwaki ye na etumbu awa na nsé mpe na mokolo ya suka

79:26

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَعِبۡرَةً لِّمَن يَخۡشَىٰٓ

Wana ya soló, ezali elembo тропа moto azali na bobangi

79:27

ءَأَنتُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَمِ ٱلسَّمَآءُۚ بَنَىٰهَا

Kokelama na bino ezali makasi koleka to mapata maye atonga

79:28

رَفَعَ سَمۡكَهَا فَسَوَّىٰهَا

Atombola etando na yango mpe akokisa yango

79:29

وَأَغۡطَشَ لَيۡلَهَا وَأَخۡرَجَ ضُحَىٰهَا

Atieli yango butu na moyi

79:30

وَٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ ذَٰلِكَ دَحَىٰهَآ

Mpe na sima atandi mabele

79:31

أَخۡرَجَ مِنۡهَا مَآءَهَا وَمَرۡعَىٰهَا

Mpe na kati na yango abimisi mayi na matiti

79:32

وَٱلۡجِبَالَ أَرۡسَىٰهَا

Mpe atelemisi bangomba

79:33

مَتَٰعًا لَّكُمۡ وَلِأَنۡعَٰمِكُمۡ

Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino

79:34

فَإِذَا جَآءَتِ ٱلطَّآمَّةُ ٱلۡكُبۡرَىٰ

Kasi ntango bobulungani ya monene ekoya

79:35

يَوۡمَ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ مَا سَعَىٰ

Mokolo moye moto akokanisa maye asalaki

79:36

وَبُرِّزَتِ ٱلۡجَحِيمُ لِمَن يَرَىٰ

Moto ya lifelo mokozala polele na oyo akomona

79:37

فَأَمَّا مَن طَغَىٰ

Mpona oyo alekisaki ndelo

79:38

وَءَاثَرَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا

Mpe aponaki bomoyi bwa nsé

79:39

فَإِنَّ ٱلۡجَحِيمَ هِيَ ٱلۡمَأۡوَىٰ

Ya soló, lifelo ekozala esika naye ya kofanda

79:40

وَأَمَّا مَنۡ خَافَ مَقَامَ رَبِّهِۦ وَنَهَى ٱلنَّفۡسَ عَنِ ٱلۡهَوَىٰ

Kasi mpona oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye mpe amipekisaki na bamposa

79:41

فَإِنَّ ٱلۡجَنَّةَ هِيَ ٱلۡمَأۡوَىٰ

Ya soló, lola ekozala esika naye ya bopemi

79:42

يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلسَّاعَةِ أَيَّانَ مُرۡسَىٰهَا

Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango

79:43

فِيمَ أَنتَ مِن ذِكۡرَىٰهَآ

Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango

79:44

إِلَىٰ رَبِّكَ مُنتَهَىٰهَآ

Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo

79:45

إِنَّمَآ أَنتَ مُنذِرُ مَن يَخۡشَىٰهَا

Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana

79:46

كَأَنَّهُمۡ يَوۡمَ يَرَوۡنَهَا لَمۡ يَلۡبَثُوٓاْ إِلَّا عَشِيَّةً أَوۡ ضُحَىٰهَا

Ntango bakomona yango bakomimona lokola barandaki na malita sé mokolo moko to ndambo ya mokolo

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.