بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
77:1وَٱلۡمُرۡسَلَٰتِ عُرۡفًا
(Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki ya kolandana! (ba anzelu)
77:2فَٱلۡعَٰصِفَٰتِ عَصۡفًا
Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi
77:3وَٱلنَّٰشِرَٰتِ نَشۡرًا
Mpe bazali kopanza bisika binso
77:4فَٱلۡفَٰرِقَٰتِ فَرۡقًا
Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu
77:5فَٱلۡمُلۡقِيَٰتِ ذِكۡرًا
Mpe na baye babwakaka mbela
77:6عُذۡرًا أَوۡ نُذۡرًا
Mpona bolimbisi to bokebisi
77:7إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَوَٰقِعٌ
Oyo bolakamaki ekozangaka te
77:8فَإِذَا ٱلنُّجُومُ طُمِسَتۡ
Tango minzoto mikolimwaka
77:9وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ فُرِجَتۡ
Mpe tango mapata ekopasuka
77:10وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ نُسِفَتۡ
Mpe tango bangomba bikolalisamaka
77:11وَإِذَا ٱلرُّسُلُ أُقِّتَتۡ
Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka
77:12لِأَيِّ يَوۡمٍ أُجِّلَتۡ
Yango ezongisami mpona mokolo nini
77:13لِيَوۡمِ ٱلۡفَصۡلِ
O mokolo ya kokata makambo
77:14وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ
Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo
77:15وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:16أَلَمۡ نُهۡلِكِ ٱلۡأَوَّلِينَ
Boye tobomaki bamisusu liboso te
77:17ثُمَّ نُتۡبِعُهُمُ ٱلۡأٓخِرِينَ
Sima tolandisaki bamisusu te
77:18كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki
77:19وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi
77:20أَلَمۡ نَخۡلُقكُّم مِّن مَّآءٍ مَّهِينٍ
Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te
77:21فَجَعَلۡنَٰهُ فِي قَرَارٍ مَّكِينٍ
Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te
77:22إِلَىٰ قَدَرٍ مَّعۡلُومٍ
Na elaka oyo eyebani te
77:23فَقَدَرۡنَا فَنِعۡمَ ٱلۡقَٰدِرُونَ
Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te
77:24وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:25أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ كِفَاتًا
Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te
77:26أَحۡيَآءً وَأَمۡوَٰتًا
(Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa
77:27وَجَعَلۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ شَٰمِخَٰتٍ وَأَسۡقَيۡنَٰكُم مَّآءً فُرَاتًا
Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te
77:28وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:29ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ مَا كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta
77:30ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ ظِلٍّ ذِي ثَلَٰثِ شُعَبٍ
Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato
77:31لَّا ظَلِيلٍ وَلَا يُغۡنِي مِنَ ٱللَّهَبِ
Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te
77:32إِنَّهَا تَرۡمِي بِشَرَرٍ كَٱلۡقَصۡرِ
Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo
77:33كَأَنَّهُۥ جِمَٰلَتٌ صُفۡرٌ
Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka
77:34وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:35هَٰذَا يَوۡمُ لَا يَنطِقُونَ
Mokolo wana bakolobaka te
77:36وَلَا يُؤۡذَنُ لَهُمۡ فَيَعۡتَذِرُونَ
Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te
77:37وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:38هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِۖ جَمَعۡنَٰكُمۡ وَٱلۡأَوَّلِينَ
Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso
77:39فَإِن كَانَ لَكُمۡ كَيۡدٌ فَكِيدُونِ
Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai
77:40وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:41إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي ظِلَٰلٍ وَعُيُونٍ
Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba
77:42وَفَوَٰكِهَ مِمَّا يَشۡتَهُونَ
(Bakoliaka) bambuma oyo balingi
77:43كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki
77:44إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi
77:45وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:46كُلُواْ وَتَمَتَّعُواْ قَلِيلًا إِنَّكُم مُّجۡرِمُونَ
Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki
77:47وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:48وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱرۡكَعُواْ لَا يَرۡكَعُونَ
Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
77:49وَيۡلٌ يَوۡمَئِذٍ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
77:50فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَهُۥ يُؤۡمِنُونَ
(Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.