Surah 44 · 59 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Ad-Dukhan in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

44:1

حمٓ

Hâ, mîm

44:2

وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ

Na buku (kurani) ya polele

44:3

إِنَّآ أَنزَلۡنَٰهُ فِي لَيۡلَةٍ مُّبَٰرَكَةٍۚ إِنَّا كُنَّا مُنذِرِينَ

Ya soló, tokitisaki yango o butu ya mapamboli. Ya soló, biso tozali bakebisi

44:4

فِيهَا يُفۡرَقُ كُلُّ أَمۡرٍ حَكِيمٍ

O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama

44:5

أَمۡرًا مِّنۡ عِندِنَآۚ إِنَّا كُنَّا مُرۡسِلِينَ

Motindo kowuta epai na biso. Biso nde totindaka

44:6

رَحۡمَةً مِّن رَّبِّكَۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ

Mawa kowuta na Nkolo wayo. Ya sólo ye azali moyoki atonda boyebi

44:7

رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ

Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te

44:8

لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ

Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo

44:9

بَلۡ هُمۡ فِي شَكٍّ يَلۡعَبُونَ

Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana

44:10

فَٱرۡتَقِبۡ يَوۡمَ تَأۡتِي ٱلسَّمَآءُ بِدُخَانٍ مُّبِينٍ

(Malamu) zela mokolo oyo likolo ekoya na molinga ya polele

44:11

يَغۡشَى ٱلنَّاسَۖ هَٰذَا عَذَابٌ أَلِيمٌ

Ekozipa bato, oyo nde etumbu ya makasi

44:12

رَّبَّنَا ٱكۡشِفۡ عَنَّا ٱلۡعَذَابَ إِنَّا مُؤۡمِنُونَ

Nkolo; tiya etumbu mosika na biso, ya soló tozali bandimi

44:13

أَنَّىٰ لَهُمُ ٱلذِّكۡرَىٰ وَقَدۡ جَآءَهُمۡ رَسُولٌ مُّبِينٌ

Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele

44:14

ثُمَّ تَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ وَقَالُواْ مُعَلَّمٌ مَّجۡنُونٌ

Sima bapesi yango mokongo mpe balobi: Batangisa ye, azali na ligboma

44:15

إِنَّا كَاشِفُواْ ٱلۡعَذَابِ قَلِيلًاۚ إِنَّكُمۡ عَآئِدُونَ

Tokolongola etumbu moke. Ya sólo, bozali bato mabe

44:16

يَوۡمَ نَبۡطِشُ ٱلۡبَطۡشَةَ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ إِنَّا مُنتَقِمُونَ

Mokolo tokobeta na ndenge ya mabe, mpo ete biso esengeli tosala bongo

44:17

وَلَقَدۡ فَتَنَّا قَبۡلَهُمۡ قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَ وَجَآءَهُمۡ رَسُولٌ كَرِيمٌ

Мре liboso na bango, tomekaki bato ya falo, mpe motindami ya malamu ayelaki bango

44:18

أَنۡ أَدُّوٓاْ إِلَيَّ عِبَادَ ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٌ

(Ayebisi) bango: Bopesa ngai bawumbu ya Allah, nazali motindami malamu epai na bino

44:19

وَأَن لَّا تَعۡلُواْ عَلَى ٱللَّهِۖ إِنِّيٓ ءَاتِيكُم بِسُلۡطَٰنٍ مُّبِينٍ

Bomilakisa te epai ya Allah na kosalela ye lolendo. Ya solo, nayeli bino elembo ya polele

44:20

وَإِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُمۡ أَن تَرۡجُمُونِ

Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te

44:21

وَإِن لَّمۡ تُؤۡمِنُواْ لِي فَٱعۡتَزِلُونِ

Mpe soki bondimeli ngai te, bomitiya mosika na ngai

44:22

فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنَّ هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمٌ مُّجۡرِمُونَ

Abengaki Nkolo wa ye, ya solo bazali batomboki

44:23

فَأَسۡرِ بِعِبَادِي لَيۡلًا إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ

Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino)

44:24

وَٱتۡرُكِ ٱلۡبَحۡرَ رَهۡوًاۖ إِنَّهُمۡ جُندٌ مُّغۡرَقُونَ

Tika ebale lolenge wana, esengeli na bango bazinda (kokufa)

44:25

كَمۡ تَرَكُواْ مِن جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ

Boni batikaki kati na bilanga na miluka

44:26

وَزُرُوعٍ وَمَقَامٍ كَرِيمٍ

Bilanga na milona na bandako ya kitoko

44:27

وَنَعۡمَةٍ كَانُواْ فِيهَا فَٰكِهِينَ

Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango

44:28

كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا قَوۡمًا ءَاخَرِينَ

Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu

44:29

فَمَا بَكَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّمَآءُ وَٱلۡأَرۡضُ وَمَا كَانُواْ مُنظَرِينَ

Ezala likolo na mabele etikalaki kolela te na kozela

44:30

وَلَقَدۡ نَجَّيۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ مِنَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡمُهِينِ

Mpe tobikisaki bana ya isalayele na etumbu ya nsoni

44:31

مِن فِرۡعَوۡنَۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَالِيًا مِّنَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ

Kowuta epai ya falo oyo amilakisaki okati ya bato mabe

44:32

وَلَقَدِ ٱخۡتَرۡنَٰهُمۡ عَلَىٰ عِلۡمٍ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ

Mpe tosilaki kotiya bango bazala elembo тропа molongo mobimba

44:33

وَءَاتَيۡنَٰهُم مِّنَ ٱلۡأٓيَٰتِ مَا فِيهِ بَلَٰٓؤٌاْ مُّبِينٌ

Mpe topesaki bango makamwisi тропа komeka bango

44:34

إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَيَقُولُونَ

Ya soló, ba oyo wana bazali koloba

44:35

إِنۡ هِيَ إِلَّا مَوۡتَتُنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُنشَرِينَ

Liwa тропа biso nde oyo ya yambo, tokoki kosekwa lisusu te (sima na yango)

44:36

فَأۡتُواْ بِـَٔابَآئِنَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

Bozongisa bankoko na biso soki bozali koloba bosóló

44:37

أَهُمۡ خَيۡرٌ أَمۡ قَوۡمُ تُبَّعٍ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ مُجۡرِمِينَ

Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe

44:38

وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا لَٰعِبِينَ

Mpe tokelaki likolo na mabele mpe manso maye mazali kati na yango pamba te

44:39

مَا خَلَقۡنَٰهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ

Tokelaki yango mibale na bosóló, kasi ebele na bango bazali koyeba te

44:40

إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ مِيقَٰتُهُمۡ أَجۡمَعِينَ

Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso

44:41

يَوۡمَ لَا يُغۡنِي مَوۡلًى عَن مَّوۡلًى شَيۡـًٔا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ

Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te

44:42

إِلَّا مَن رَّحِمَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu

44:43

إِنَّ شَجَرَتَ ٱلزَّقُّومِ

Ya soló nzete ya Zaqqúm

44:44

طَعَامُ ٱلۡأَثِيمِ

Ekozalaka bilei ya basumuki

44:45

كَٱلۡمُهۡلِ يَغۡلِي فِي ٱلۡبُطُونِ

Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu

44:46

كَغَلۡيِ ٱلۡحَمِيمِ

Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi

44:47

خُذُوهُ فَٱعۡتِلُوهُ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ

Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto

44:48

ثُمَّ صُبُّواْ فَوۡقَ رَأۡسِهِۦ مِنۡ عَذَابِ ٱلۡحَمِيمِ

Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi

44:49

ذُقۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡكَرِيمُ

Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu

44:50

إِنَّ هَٰذَا مَا كُنتُم بِهِۦ تَمۡتَرُونَ

Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa

44:51

إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي مَقَامٍ أَمِينٍ

Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko

44:52

فِي جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ

Kati na bilanga na mingala (mia lola)

44:53

يَلۡبَسُونَ مِن سُندُسٍ وَإِسۡتَبۡرَقٍ مُّتَقَٰبِلِينَ

Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana

44:54

كَذَٰلِكَ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٍ

Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene

44:55

يَدۡعُونَ فِيهَا بِكُلِّ فَٰكِهَةٍ ءَامِنِينَ

Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso

44:56

لَا يَذُوقُونَ فِيهَا ٱلۡمَوۡتَ إِلَّا ٱلۡمَوۡتَةَ ٱلۡأُولَىٰۖ وَوَقَىٰهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ

Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo

44:57

فَضۡلًا مِّن رَّبِّكَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ

Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene

44:58

فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ

Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli

44:59

فَٱرۡتَقِبۡ إِنَّهُم مُّرۡتَقِبُونَ

Zela moke, bango mpe bakozela

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.