Surah 55 · 78 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Ar-Rahman in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

55:1

ٱلرَّحۡمَٰنُ

Ar-Rahmân

55:2

عَلَّمَ ٱلۡقُرۡءَانَ

Atangisaki kurani

55:3

خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ

Akela moto

55:4

عَلَّمَهُ ٱلۡبَيَانَ

Atangisa ye koloba polele

55:5

ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ بِحُسۡبَانٍ

Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama

55:6

وَٱلنَّجۡمُ وَٱلشَّجَرُ يَسۡجُدَانِ

Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango)

55:7

وَٱلسَّمَآءَ رَفَعَهَا وَوَضَعَ ٱلۡمِيزَانَ

Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli

55:8

أَلَّا تَطۡغَوۡاْ فِي ٱلۡمِيزَانِ

Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli

55:9

وَأَقِيمُواْ ٱلۡوَزۡنَ بِٱلۡقِسۡطِ وَلَا تُخۡسِرُواْ ٱلۡمِيزَانَ

Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te

55:10

وَٱلۡأَرۡضَ وَضَعَهَا لِلۡأَنَامِ

Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi

55:11

فِيهَا فَٰكِهَةٌ وَٱلنَّخۡلُ ذَاتُ ٱلۡأَكۡمَامِ

Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l ekangama

55:12

وَٱلۡحَبُّ ذُو ٱلۡعَصۡفِ وَٱلرَّيۡحَانُ

Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi

55:13

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima)

55:14

خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ مِن صَلۡصَٰلٍ كَٱلۡفَخَّارِ

Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki

55:15

وَخَلَقَ ٱلۡجَآنَّ مِن مَّارِجٍ مِّن نَّارٍ

Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga

55:16

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:17

رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقَيۡنِ وَرَبُّ ٱلۡمَغۡرِبَيۡنِ

Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale

55:18

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:19

مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ يَلۡتَقِيَانِ

Atika bibale mibale bileka na bokutani

55:20

بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخٌ لَّا يَبۡغِيَانِ

Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te

55:21

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:22

يَخۡرُجُ مِنۡهُمَا ٱللُّؤۡلُؤُ وَٱلۡمَرۡجَانُ

Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga)

55:23

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:24

وَلَهُ ٱلۡجَوَارِ ٱلۡمُنشَـَٔاتُ فِي ٱلۡبَحۡرِ كَٱلۡأَعۡلَٰمِ

Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba

55:25

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:26

كُلُّ مَنۡ عَلَيۡهَا فَانٍ

Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi)

55:27

وَيَبۡقَىٰ وَجۡهُ رَبِّكَ ذُو ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ

Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto

55:28

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:29

يَسۡـَٔلُهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ كُلَّ يَوۡمٍ هُوَ فِي شَأۡنٍ

Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika

55:30

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:31

سَنَفۡرُغُ لَكُمۡ أَيُّهَ ٱلثَّقَلَانِ

Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)

55:32

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:33

يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ إِنِ ٱسۡتَطَعۡتُمۡ أَن تَنفُذُواْ مِنۡ أَقۡطَارِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ فَٱنفُذُواْۚ لَا تَنفُذُونَ إِلَّا بِسُلۡطَٰنٍ

Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah)

55:34

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:35

يُرۡسَلُ عَلَيۡكُمَا شُوَاظٌ مِّن نَّارٍ وَنُحَاسٌ فَلَا تَنتَصِرَانِ

Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te

55:36

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:37

فَإِذَا ٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ وَرۡدَةً كَٱلدِّهَانِ

Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané

55:38

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:39

فَيَوۡمَئِذٍ لَّا يُسۡـَٔلُ عَن ذَنۢبِهِۦٓ إِنسٌ وَلَا جَآنٌّ

O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango

55:40

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:41

يُعۡرَفُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ بِسِيمَٰهُمۡ فَيُؤۡخَذُ بِٱلنَّوَٰصِي وَٱلۡأَقۡدَامِ

Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango

55:42

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:43

هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِي يُكَذِّبُ بِهَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ

Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango

55:44

يَطُوفُونَ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَ حَمِيمٍ ءَانٍ

Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi

55:45

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:46

وَلِمَنۡ خَافَ مَقَامَ رَبِّهِۦ جَنَّتَانِ

Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola)

55:47

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:48

ذَوَاتَآ أَفۡنَانٍ

Okati na yango ezali na bolamu mibale

55:49

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:50

فِيهِمَا عَيۡنَانِ تَجۡرِيَانِ

O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola

55:51

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:52

فِيهِمَا مِن كُلِّ فَٰكِهَةٍ زَوۡجَانِ

O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale

55:53

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:54

مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ فُرُشِۭ بَطَآئِنُهَا مِنۡ إِسۡتَبۡرَقٍۚ وَجَنَى ٱلۡجَنَّتَيۡنِ دَانٍ

Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka

55:55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:56

فِيهِنَّ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٌ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنٌّ

Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango

55:57

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:58

كَأَنَّهُنَّ ٱلۡيَاقُوتُ وَٱلۡمَرۡجَانُ

Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga

55:59

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:60

هَلۡ جَزَآءُ ٱلۡإِحۡسَٰنِ إِلَّا ٱلۡإِحۡسَٰنُ

Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu

55:61

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:62

وَمِن دُونِهِمَا جَنَّتَانِ

Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso

55:63

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:64

مُدۡهَآمَّتَانِ

Bizali na langi ya mpondu ya moyindo

55:65

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:66

فِيهِمَا عَيۡنَانِ نَضَّاخَتَانِ

Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi

55:67

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:68

فِيهِمَا فَٰكِهَةٌ وَنَخۡلٌ وَرُمَّانٌ

Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l na rummân

55:69

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:70

فِيهِنَّ خَيۡرَٰتٌ حِسَانٌ

Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu

55:71

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:72

حُورٌ مَّقۡصُورَٰتٌ فِي ٱلۡخِيَامِ

Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma

55:73

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:74

لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٌ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنٌّ

Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango

55:75

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:76

مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ رَفۡرَفٍ خُضۡرٍ وَعَبۡقَرِيٍّ حِسَانٍ

Bakoyekama na bikata ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko

55:77

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

55:78

تَبَٰرَكَ ٱسۡمُ رَبِّكَ ذِي ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ

Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.