بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
56:1إِذَا وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ
Tango likambo monene ekokweya
56:2لَيۡسَ لِوَقۡعَتِهَا كَاذِبَةٌ
Koya na yango ezali lokuta te
56:3خَافِضَةٌ رَّافِعَةٌ
Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
56:4إِذَا رُجَّتِ ٱلۡأَرۡضُ رَجًّا
Tango mabele makoninganaka makasi
56:5وَبُسَّتِ ٱلۡجِبَالُ بَسًّا
Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike
56:6فَكَانَتۡ هَبَآءً مُّنۢبَثًّا
Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana
56:7وَكُنتُمۡ أَزۡوَٰجًا ثَلَٰثَةً
Mpe bokozalaka lisanga misato
56:8فَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ
Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali
56:9وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ
Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi
56:10وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلسَّٰبِقُونَ
Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka
56:11أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡمُقَرَّبُونَ
Baye wana nde bakozalaka pene na Allah
56:12فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu
56:13ثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso
56:14وَقَلِيلٌ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Мре moke okati ya bato ya sima
56:15عَلَىٰ سُرُرٍ مَّوۡضُونَةٍ
(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo
56:16مُّتَّكِـِٔينَ عَلَيۡهَا مُتَقَٰبِلِينَ
Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
56:17يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٌ مُّخَلَّدُونَ
Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela
56:18بِأَكۡوَابٍ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٍ مِّن مَّعِينٍ
Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli)
56:19لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ
(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te
56:20وَفَٰكِهَةٍ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ
Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka
56:21وَلَحۡمِ طَيۡرٍ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ
Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi
56:22وَحُورٌ عِينٌ
Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala
56:23كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ
Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga
56:24جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Lifuta тропа maye basalaki
56:25لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوًا وَلَا تَأۡثِيمًا
Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te
56:26إِلَّا قِيلًا سَلَٰمًا سَلَٰمًا
Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia
56:27وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ
Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali
56:28فِي سِدۡرٍ مَّخۡضُودٍ
Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr
56:29وَطَلۡحٍ مَّنضُودٍ
Na banzete ya makemba na bitabe
56:30وَظِلٍّ مَّمۡدُودٍ
Na nsé ya malili ya monene
56:31وَمَآءٍ مَّسۡكُوبٍ
(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela
56:32وَفَٰكِهَةٍ كَثِيرَةٍ
Mpe bambuma ebele
56:33لَّا مَقۡطُوعَةٍ وَلَا مَمۡنُوعَةٍ
Babuki yango te mpe epekisami te
56:34وَفُرُشٍ مَّرۡفُوعَةٍ
O likolo lia bambeto ya likolo
56:35إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءً
Biso nde tokelaki bango na bokeli
56:36فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا
Mpe tosalaki bango bayebi mibali te
56:37عُرُبًا أَتۡرَابًا
Bazali bambula ndenge moko
56:38لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Mpona bato ya loboko ya mobali
56:39ثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso
56:40وَثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka
56:41وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ
Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana
56:42فِي سَمُومٍ وَحَمِيمٍ
Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka
56:43وَظِلٍّ مِّن يَحۡمُومٍ
Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo
56:44لَّا بَارِدٍ وَلَا كَرِيمٍ
(kati na yango) malili te mpe kitoko te
56:45إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ
Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko
56:46وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ
Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi
56:47وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
(Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu
56:48أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Na bankoko ya biso ya yambo
56:49قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ
Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka
56:50لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٍ مَّعۡلُومٍ
Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani
56:51ثُمَّ إِنَّكُمۡ أَيُّهَا ٱلضَّآلُّونَ ٱلۡمُكَذِّبُونَ
Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka)
56:52لَأٓكِلُونَ مِن شَجَرٍ مِّن زَقُّومٍ
Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm
56:53فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Mabumu na bino makotondaka na yango
56:54فَشَٰرِبُونَ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡحَمِيمِ
Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi
56:55فَشَٰرِبُونَ شُرۡبَ ٱلۡهِيمِ
Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso)
56:56هَٰذَا نُزُلُهُمۡ يَوۡمَ ٱلدِّينِ
Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka
56:57نَحۡنُ خَلَقۡنَٰكُمۡ فَلَوۡلَا تُصَدِّقُونَ
Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te
56:58أَفَرَءَيۡتُم مَّا تُمۡنُونَ
Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo
56:59ءَأَنتُمۡ تَخۡلُقُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
Bino nde bokela yango to biso nde bakeli
56:60نَحۡنُ قَدَّرۡنَا بَيۡنَكُمُ ٱلۡمَوۡتَ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ
Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te
56:61عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ أَمۡثَٰلَكُمۡ وَنُنشِئَكُمۡ فِي مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te
56:62وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُولَىٰ فَلَوۡلَا تَذَكَّرُونَ
Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te
56:63أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَحۡرُثُونَ
Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)
56:64ءَأَنتُمۡ تَزۡرَعُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلزَّٰرِعُونَ
Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni
56:65لَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَٰهُ حُطَٰمًا فَظَلۡتُمۡ تَفَكَّهُونَ
Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
56:66إِنَّا لَمُغۡرَمُونَ
Tala biso tokomi na banyongo
56:67بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ
Kasi bapimeli nde biso
56:68أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلۡمَآءَ ٱلَّذِي تَشۡرَبُونَ
Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela
56:69ءَأَنتُمۡ أَنزَلۡتُمُوهُ مِنَ ٱلۡمُزۡنِ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنزِلُونَ
Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi
56:70لَوۡ نَشَآءُ جَعَلۡنَٰهُ أُجَاجًا فَلَوۡلَا تَشۡكُرُونَ
Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah)
56:71أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي تُورُونَ
Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te
56:72ءَأَنتُمۡ أَنشَأۡتُمۡ شَجَرَتَهَآ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنشِـُٔونَ
Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli
56:73نَحۡنُ جَعَلۡنَٰهَا تَذۡكِرَةً وَمَتَٰعًا لِّلۡمُقۡوِينَ
Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
56:74فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
56:75فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَوَٰقِعِ ٱلنُّجُومِ
(Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka
56:76وَإِنَّهُۥ لَقَسَمٌ لَّوۡ تَعۡلَمُونَ عَظِيمٌ
Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka
56:77إِنَّهُۥ لَقُرۡءَانٌ كَرِيمٌ
Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu
56:78فِي كِتَٰبٍ مَّكۡنُونٍ
Ebatelami kati na buku
56:79لَّا يَمَسُّهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُطَهَّرُونَ
Basimbaka yango te sé na bapetoami
56:80تَنزِيلٌ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili
56:81أَفَبِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَنتُم مُّدۡهِنُونَ
Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta
56:82وَتَجۡعَلُونَ رِزۡقَكُمۡ أَنَّكُمۡ تُكَذِّبُونَ
Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani
56:83فَلَوۡلَآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلۡحُلۡقُومَ
Tango mpema ekomata tii na mongongo
56:84وَأَنتُمۡ حِينَئِذٍ تَنظُرُونَ
Mpe tango wana bozali kotala
56:85وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنكُمۡ وَلَٰكِن لَّا تُبۡصِرُونَ
Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te
56:86فَلَوۡلَآ إِن كُنتُمۡ غَيۡرَ مَدِينِينَ
Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te)
56:87تَرۡجِعُونَهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo
56:88فَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah)
56:89فَرَوۡحٌ وَرَيۡحَانٌ وَجَنَّتُ نَعِيمٍ
(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo
56:90وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali
56:91فَسَلَٰمٌ لَّكَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali
56:92وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٱلضَّآلِّينَ
Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi
56:93فَنُزُلٌ مِّنۡ حَمِيمٍ
Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi
56:94وَتَصۡلِيَةُ جَحِيمٍ
Mpe akozikisama okati ya moto
56:95إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ حَقُّ ٱلۡيَقِينِ
Wana nde likambo ya soló
56:96فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.