Surah 36 · 83 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Ya-Sin in Lingala

In English with tafsir

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

36:1

يسٓ

Yâ, Sín

36:2

وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡحَكِيمِ

Na kurani oyo etonda bwanya

36:3

إِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami

36:4

عَلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسۡتَقِيمٍ

O kati ya nzela ya semba

36:5

تَنزِيلَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ

Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu

36:6

لِتُنذِرَ قَوۡمًا مَّآ أُنذِرَ ءَابَآؤُهُمۡ فَهُمۡ غَٰفِلُونَ

Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te

36:7

لَقَدۡ حَقَّ ٱلۡقَوۡلُ عَلَىٰٓ أَكۡثَرِهِمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ

Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te

36:8

إِنَّا جَعَلۡنَا فِيٓ أَعۡنَٰقِهِمۡ أَغۡلَٰلًا فَهِيَ إِلَى ٱلۡأَذۡقَانِ فَهُم مُّقۡمَحُونَ

Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo

36:9

وَجَعَلۡنَا مِنۢ بَيۡنِ أَيۡدِيهِمۡ سَدًّا وَمِنۡ خَلۡفِهِمۡ سَدًّا فَأَغۡشَيۡنَٰهُمۡ فَهُمۡ لَا يُبۡصِرُونَ

Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te

36:10

وَسَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ ءَأَنذَرۡتَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تُنذِرۡهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ

Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te

36:11

إِنَّمَا تُنذِرُ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلذِّكۡرَ وَخَشِيَ ٱلرَّحۡمَٰنَ بِٱلۡغَيۡبِۖ فَبَشِّرۡهُ بِمَغۡفِرَةٍ وَأَجۡرٍ كَرِيمٍ

Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu

36:12

إِنَّا نَحۡنُ نُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَنَكۡتُبُ مَا قَدَّمُواْ وَءَاثَٰرَهُمۡۚ وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ فِيٓ إِمَامٍ مُّبِينٍ

Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele

36:13

وَٱضۡرِبۡ لَهُم مَّثَلًا أَصۡحَٰبَ ٱلۡقَرۡيَةِ إِذۡ جَآءَهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ

Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango

36:14

إِذۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَيۡهِمُ ٱثۡنَيۡنِ فَكَذَّبُوهُمَا فَعَزَّزۡنَا بِثَالِثٍ فَقَالُوٓاْ إِنَّآ إِلَيۡكُم مُّرۡسَلُونَ

Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino

36:15

قَالُواْ مَآ أَنتُمۡ إِلَّا بَشَرٌ مِّثۡلُنَا وَمَآ أَنزَلَ ٱلرَّحۡمَٰنُ مِن شَيۡءٍ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا تَكۡذِبُونَ

Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa

36:16

قَالُواْ رَبُّنَا يَعۡلَمُ إِنَّآ إِلَيۡكُمۡ لَمُرۡسَلُونَ

Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino

36:17

وَمَا عَلَيۡنَآ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ

Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele

36:18

قَالُوٓاْ إِنَّا تَطَيَّرۡنَا بِكُمۡۖ لَئِن لَّمۡ تَنتَهُواْ لَنَرۡجُمَنَّكُمۡ وَلَيَمَسَّنَّكُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٌ

Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino

36:19

قَالُواْ طَٰٓئِرُكُم مَّعَكُمۡ أَئِن ذُكِّرۡتُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٌ مُّسۡرِفُونَ

Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo

36:20

وَجَآءَ مِنۡ أَقۡصَا ٱلۡمَدِينَةِ رَجُلٌ يَسۡعَىٰ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱتَّبِعُواْ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami

36:21

ٱتَّبِعُواْ مَن لَّا يَسۡـَٔلُكُمۡ أَجۡرًا وَهُم مُّهۡتَدُونَ

Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami

36:22

وَمَالِيَ لَآ أَعۡبُدُ ٱلَّذِي فَطَرَنِي وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ

Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama

36:23

ءَأَتَّخِذُ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةً إِن يُرِدۡنِ ٱلرَّحۡمَٰنُ بِضُرٍّ لَّا تُغۡنِ عَنِّي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـًٔا وَلَا يُنقِذُونِ

Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te

36:24

إِنِّيٓ إِذًا لَّفِي ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Ya soló, nakozala na libungi lia polele

36:25

إِنِّيٓ ءَامَنتُ بِرَبِّكُمۡ فَٱسۡمَعُونِ

Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai

36:26

قِيلَ ٱدۡخُلِ ٱلۡجَنَّةَۖ قَالَ يَٰلَيۡتَ قَوۡمِي يَعۡلَمُونَ

(Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka

36:27

بِمَا غَفَرَ لِي رَبِّي وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُكۡرَمِينَ

Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu

36:28

وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ مِنۢ بَعۡدِهِۦ مِن جُندٍ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَمَا كُنَّا مُنزِلِينَ

Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye

36:29

إِن كَانَتۡ إِلَّا صَيۡحَةً وَٰحِدَةً فَإِذَا هُمۡ خَٰمِدُونَ

Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango

36:30

يَٰحَسۡرَةً عَلَى ٱلۡعِبَادِۚ مَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ

Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye

36:31

أَلَمۡ يَرَوۡاْ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ أَنَّهُمۡ إِلَيۡهِمۡ لَا يَرۡجِعُونَ

Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te

36:32

وَإِن كُلٌّ لَّمَّا جَمِيعٌ لَّدَيۡنَا مُحۡضَرُونَ

Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba)

36:33

وَءَايَةٌ لَّهُمُ ٱلۡأَرۡضُ ٱلۡمَيۡتَةُ أَحۡيَيۡنَٰهَا وَأَخۡرَجۡنَا مِنۡهَا حَبًّا فَمِنۡهُ يَأۡكُلُونَ

Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia

36:34

وَجَعَلۡنَا فِيهَا جَنَّٰتٍ مِّن نَّخِيلٍ وَأَعۡنَٰبٍ وَفَجَّرۡنَا فِيهَا مِنَ ٱلۡعُيُونِ

Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil mpe a’náb mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi

36:35

لِيَأۡكُلُواْ مِن ثَمَرِهِۦ وَمَا عَمِلَتۡهُ أَيۡدِيهِمۡۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ

Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te

36:36

سُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَزۡوَٰجَ كُلَّهَا مِمَّا تُنۢبِتُ ٱلۡأَرۡضُ وَمِنۡ أَنفُسِهِمۡ وَمِمَّا لَا يَعۡلَمُونَ

Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te

36:37

وَءَايَةٌ لَّهُمُ ٱلَّيۡلُ نَسۡلَخُ مِنۡهُ ٱلنَّهَارَ فَإِذَا هُم مُّظۡلِمُونَ

Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili

36:38

وَٱلشَّمۡسُ تَجۡرِي لِمُسۡتَقَرٍّ لَّهَاۚ ذَٰلِكَ تَقۡدِيرُ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ

Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi

36:39

وَٱلۡقَمَرَ قَدَّرۡنَٰهُ مَنَازِلَ حَتَّىٰ عَادَ كَٱلۡعُرۡجُونِ ٱلۡقَدِيمِ

Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka

36:40

لَا ٱلشَّمۡسُ يَنۢبَغِي لَهَآ أَن تُدۡرِكَ ٱلۡقَمَرَ وَلَا ٱلَّيۡلُ سَابِقُ ٱلنَّهَارِۚ وَكُلٌّ فِي فَلَكٍ يَسۡبَحُونَ

Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango

36:41

وَءَايَةٌ لَّهُمۡ أَنَّا حَمَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُمۡ فِي ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ

Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka

36:42

وَخَلَقۡنَا لَهُم مِّن مِّثۡلِهِۦ مَا يَرۡكَبُونَ

Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola

36:43

وَإِن نَّشَأۡ نُغۡرِقۡهُمۡ فَلَا صَرِيخَ لَهُمۡ وَلَا هُمۡ يُنقَذُونَ

Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te

36:44

إِلَّا رَحۡمَةً مِّنَّا وَمَتَٰعًا إِلَىٰ حِينٍ

Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе

36:45

وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱتَّقُواْ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيكُمۡ وَمَا خَلۡفَكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ

Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu

36:46

وَمَا تَأۡتِيهِم مِّنۡ ءَايَةٍ مِّنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِمۡ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ

Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo

36:47

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ أَنفِقُواْ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ قَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنُطۡعِمُ مَن لَّوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ أَطۡعَمَهُۥٓ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا فِي ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele

36:48

وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló

36:49

مَا يَنظُرُونَ إِلَّا صَيۡحَةً وَٰحِدَةً تَأۡخُذُهُمۡ وَهُمۡ يَخِصِّمُونَ

Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana

36:50

فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ تَوۡصِيَةً وَلَآ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمۡ يَرۡجِعُونَ

Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te

36:51

وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَإِذَا هُم مِّنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ يَنسِلُونَ

Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango

36:52

قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا مَنۢ بَعَثَنَا مِن مَّرۡقَدِنَاۜۗ هَٰذَا مَا وَعَدَ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَصَدَقَ ٱلۡمُرۡسَلُونَ

Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán alakaki, mpe batindami balobaki bosóló

36:53

إِن كَانَتۡ إِلَّا صَيۡحَةً وَٰحِدَةً فَإِذَا هُمۡ جَمِيعٌ لَّدَيۡنَا مُحۡضَرُونَ

Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso

36:54

فَٱلۡيَوۡمَ لَا تُظۡلَمُ نَفۡسٌ شَيۡـًٔا وَلَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala

36:55

إِنَّ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ ٱلۡيَوۡمَ فِي شُغُلٍ فَٰكِهُونَ

Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango

36:56

هُمۡ وَأَزۡوَٰجُهُمۡ فِي ظِلَٰلٍ عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ مُتَّكِـُٔونَ

Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti

36:57

لَهُمۡ فِيهَا فَٰكِهَةٌ وَلَهُم مَّا يَدَّعُونَ

Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka

36:58

سَلَٰمٌ قَوۡلًا مِّن رَّبٍّ رَّحِيمٍ

(Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa

36:59

وَٱمۡتَٰزُواْ ٱلۡيَوۡمَ أَيُّهَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ

Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe

36:60

أَلَمۡ أَعۡهَدۡ إِلَيۡكُمۡ يَٰبَنِيٓ ءَادَمَ أَن لَّا تَعۡبُدُواْ ٱلشَّيۡطَٰنَۖ إِنَّهُۥ لَكُمۡ عَدُوٌّ مُّبِينٌ

Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele

36:61

وَأَنِ ٱعۡبُدُونِيۚ هَٰذَا صِرَٰطٌ مُّسۡتَقِيمٌ

Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba

36:62

وَلَقَدۡ أَضَلَّ مِنكُمۡ جِبِلًّا كَثِيرًاۖ أَفَلَمۡ تَكُونُواْ تَعۡقِلُونَ

Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te

36:63

هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِي كُنتُمۡ تُوعَدُونَ

Oyo nde lifelo oyo balakaki bino

36:64

ٱصۡلَوۡهَا ٱلۡيَوۡمَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ

Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango

36:65

ٱلۡيَوۡمَ نَخۡتِمُ عَلَىٰٓ أَفۡوَٰهِهِمۡ وَتُكَلِّمُنَآ أَيۡدِيهِمۡ وَتَشۡهَدُ أَرۡجُلُهُم بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala

36:66

وَلَوۡ نَشَآءُ لَطَمَسۡنَا عَلَىٰٓ أَعۡيُنِهِمۡ فَٱسۡتَبَقُواْ ٱلصِّرَٰطَ فَأَنَّىٰ يُبۡصِرُونَ

Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini

36:67

وَلَوۡ نَشَآءُ لَمَسَخۡنَٰهُمۡ عَلَىٰ مَكَانَتِهِمۡ فَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ مُضِيًّا وَلَا يَرۡجِعُونَ

Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te

36:68

وَمَن نُّعَمِّرۡهُ نُنَكِّسۡهُ فِي ٱلۡخَلۡقِۚ أَفَلَا يَعۡقِلُونَ

Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te

36:69

وَمَا عَلَّمۡنَٰهُ ٱلشِّعۡرَ وَمَا يَنۢبَغِي لَهُۥٓۚ إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٌ وَقُرۡءَانٌ مُّبِينٌ

Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele

36:70

لِّيُنذِرَ مَن كَانَ حَيًّا وَيَحِقَّ ٱلۡقَوۡلُ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ

Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi

36:71

أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا خَلَقۡنَا لَهُم مِّمَّا عَمِلَتۡ أَيۡدِينَآ أَنۡعَٰمًا فَهُمۡ لَهَا مَٰلِكُونَ

Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm biye bazali kokonza

36:72

وَذَلَّلۡنَٰهَا لَهُمۡ فَمِنۡهَا رَكُوبُهُمۡ وَمِنۡهَا يَأۡكُلُونَ

Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka

36:73

وَلَهُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَمَشَارِبُۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ

Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te

36:74

وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ ءَالِهَةً لَّعَلَّهُمۡ يُنصَرُونَ

Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango

36:75

لَا يَسۡتَطِيعُونَ نَصۡرَهُمۡ وَهُمۡ لَهُمۡ جُندٌ مُّحۡضَرُونَ

В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango

36:76

فَلَا يَحۡزُنكَ قَوۡلُهُمۡۘ إِنَّا نَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَ

Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa

36:77

أَوَلَمۡ يَرَ ٱلۡإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقۡنَٰهُ مِن نُّطۡفَةٍ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٌ مُّبِينٌ

Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele

36:78

وَضَرَبَ لَنَا مَثَلًا وَنَسِيَ خَلۡقَهُۥۖ قَالَ مَن يُحۡيِ ٱلۡعِظَٰمَ وَهِيَ رَمِيمٌ

Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu

36:79

قُلۡ يُحۡيِيهَا ٱلَّذِيٓ أَنشَأَهَآ أَوَّلَ مَرَّةٍۖ وَهُوَ بِكُلِّ خَلۡقٍ عَلِيمٌ

Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso

36:80

ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلشَّجَرِ ٱلۡأَخۡضَرِ نَارًا فَإِذَآ أَنتُم مِّنۡهُ تُوقِدُونَ

Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa

36:81

أَوَلَيۡسَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يَخۡلُقَ مِثۡلَهُمۚ بَلَىٰ وَهُوَ ٱلۡخَلَّٰقُ ٱلۡعَلِيمُ

Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi

36:82

إِنَّمَآ أَمۡرُهُۥٓ إِذَآ أَرَادَ شَيۡـًٔا أَن يَقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ

Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami

36:83

فَسُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَيۡءٍ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ

Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.