Surah 37 · 182 verses · Zakariya Muhammed Balingongo
Surah As-Saffat in Lingala
بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele
إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto
لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٍ
Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso
إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٌ ثَاقِبٌ
Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينٍ لَّازِبِۭ
Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka
وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٌ مُّبِينٌ
Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu
فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٌ وَٰحِدَةٌ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala
وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango
ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango
مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo
وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ يَتَسَآءَلُونَ
Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana
قَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَأۡتُونَنَا عَنِ ٱلۡيَمِينِ
Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭۖ بَلۡ كُنتُمۡ قَوۡمًا طَٰغِينَ
Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe
فَحَقَّ عَلَيۡنَا قَوۡلُ رَبِّنَآۖ إِنَّا لَذَآئِقُونَ
Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
فَأَغۡوَيۡنَٰكُمۡ إِنَّا كُنَّا غَٰوِينَ
Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko
فَإِنَّهُمۡ يَوۡمَئِذٍ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu
إِنَّهُمۡ كَانُوٓاْ إِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ يَسۡتَكۡبِرُونَ
Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo
وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُوٓاْ ءَالِهَتِنَا لِشَاعِرٍ مَّجۡنُونِۭ
Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma
بَلۡ جَآءَ بِٱلۡحَقِّ وَصَدَّقَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo
وَمَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala
وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ عِينٌ
Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te
فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ يَتَسَآءَلُونَ
Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana
قَالَ قَآئِلٌ مِّنۡهُمۡ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينٌ
Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka
قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga
وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu
إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te
لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala
أَذَٰلِكَ خَيۡرٌ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)
فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango
وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga
وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحٌ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko
وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima
وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ
Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ
Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini
أَئِفۡكًا ءَالِهَةً دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ
Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah
فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te
قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ
Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko
قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنًا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ
Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati
فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدًا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango
وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai
فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمٍ
Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)
فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema
فَلَمَّآ أَسۡلَمَا وَتَلَّهُۥ لِلۡجَبِينِ
Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye
قَدۡ صَدَّقۡتَ ٱلرُّءۡيَآۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi
وَبَشَّرۡنَٰهُ بِإِسۡحَٰقَ نَبِيًّا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu
وَبَٰرَكۡنَا عَلَيۡهِ وَعَلَىٰٓ إِسۡحَٰقَۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحۡسِنٌ وَظَالِمٌ لِّنَفۡسِهِۦ مُبِينٌ
Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso
وَنَجَّيۡنَٰهُمَا وَقَوۡمَهُمَا مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene
وَنَصَرۡنَٰهُمۡ فَكَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِمَا فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu
إِنَّهُمَا مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
أَتَدۡعُونَ بَعۡلًا وَتَذَرُونَ أَحۡسَنَ ٱلۡخَٰلِقِينَ
Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu
ٱللَّهَ رَبَّكُمۡ وَرَبَّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ
Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)
إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٌ
Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te
لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa
وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةً مِّن يَقۡطِينٍ
Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ
Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka
فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٍ
Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ
Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali
أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثًا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ
То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona
وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta
وَجَعَلُواْ بَيۡنَهُۥ وَبَيۡنَ ٱلۡجِنَّةِ نَسَبًاۚ وَلَقَدۡ عَلِمَتِ ٱلۡجِنَّةُ إِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)
وَلَقَدۡ سَبَقَتۡ كَلِمَتُنَا لِعِبَادِنَا ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami
فَإِذَا نَزَلَ بِسَاحَتِهِمۡ فَسَآءَ صَبَاحُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama
سُبۡحَٰنَ رَبِّكَ رَبِّ ٱلۡعِزَّةِ عَمَّا يَصِفُونَ
Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba
Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.